Lakisá makambo oyo ezali na kati

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Mbano malamu koleka na bomoi na ngai

Mbano malamu koleka na bomoi na ngai
  • ABOTAMAKI NA 1967

  • EKÓLO FINLANDE

  • BOMOI NA YE YA KALA MOBƐTI MONENE YA LISANO YA TENISI

NDENGE NAZALAKI

 Nakolá na kartye moko oyo ezali na nsuka ya engumba Tampere, na Finlande. Bato ya libota na biso bamipesaki mpenza te na makambo ya Nzambe, kasi bazalaki kozwa kelasi mpe bizaleli malamu na valɛrɛ. Mama na ngai azali moto ya Allemagne mpe ntango nazalaki mwana moke, nazalaki mpe kokende konje epai ya bankɔkɔ na ngai na Allemagne ya Wɛsti.

 Nazalaki kolinga masano banda bomwana. Ntango nakolaki mwa moke, nasalaki masano ya ndenge nyonso, kasi ntango nakokisaki mbula soki 14, nazwaki ekateli ya komipesa mingi na lisano ya tenisi. Ntango nakokisaki mbula 16, nazalaki kosala ngalasisi mbala mibale to misato na mokolo​—nazalaki kokende kozwa formasyo mbala mibale mpe na nsima ngai moko nazalaki komekameka yango na mpokwa. Makambo ndenge na ndenge ya lisano yango ezalaki kosepelisa ngai mpenza; kobɛta tenisi ezalaki lolenge na ngai ya komimeka, ezala na makanisi mpe na nzoto. Atako nazalaki kosepela kolekisa ntango elongo na baninga mpe komɛla mwa masanga, namilukelá makambo te mpo na drɔgɛ to masanga. Namipesaki mingi na tenisi​—ezalaki na esika ya liboso na bomoi na ngai.

 Nakómaki kobɛta na mimekano ya ATP ntango nazalaki na mbula 17. a Nsima ya kolonga na mwa mimekano yango, bato mingi ya mboka na biso bakómaki kosepela na ngai. Ntango nakómaki na mbula 22, nazalaki na molɔngɔ ya bato 50 oyo bayebi kobɛta tenisi na mokili mobimba.

 Na boumeli ya bambula, nasalaki mibembo na mikili ndenge na ndenge mpo na kobɛta lisano ya tenisi. Namonaki bisika mosusu ya kitoko, kasi nayaki koyeba mpe makambo mingi oyo ezali bisika nyonso, na ndakisa mobulu, komɛla bangi mpe likambo ya kobebisa mabele. Na ndakisa, ntango tokendaki na États-Unis bayebisaki biso ete tókende na bisika mosusu te ya bingumba na yango mosusu mpo mobulu ezalaka makasi kuna. Makambo wana nyonso ezalaki kotungisa ngai. Longola yango, atako nazalaki kosala likambo oyo nalingaki mingi, na nsuka ya mokolo, nazalaki komiyoka lokola nazangi eloko moko.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 Sanna, elenge mwasi oyo nazalaki kobima na ye akómaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Komona ndenge akómaki komipesa na makambo ya Nzambe ezalaki kosɛkisa ngai, kasi naboyaki te ete ayekola Biblia. Tobalanaki na 1990 mpe na mbula oyo elandaki azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Ngai nazalaki kokipe makambo ya Nzambe te atako nazalaki kondima ete Nzambe azalaka. Nabosanaki te ndenge nkɔkɔ na ngai ya mwasi azalaki kotánga Biblia mingi mpe ndenge alakisaki ngai kutu kosala libondeli.

 Mokolo moko, ntango ngai ná Sanna tolekisaki ntango elongo na mwasi ná mobali moko oyo bazali Batatoli ya Yehova, mobali yango oyo nkombo na ye Kari, alakisaki ngai esakweli ya Biblia oyo elobeli “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Yango ekamwisaki ngai mpenza mpo namonaki ete soki makambo ezali mabe mingi na mokili ezali mpo na yango. Mokolo yango, tolobelaki makambo mingi te ya Nzambe. Kasi banda wana, nakómaki kosolola na Kari makambo ya Biblia mpe makambo nyonso oyo nayekolaki ezalaki ya solo. Lokola nazalaki na makambo mingi ya kosala mpe kosala mibembo mingi, ekómaki mpasi tókutanaka na Kari, kasi ye alɛmbaki ngai te. Azalaki kotindela ngai na mikanda biyano na mituna oyo nazalaki kotuna ye na ntango ya boyekoli. Asalelaki Biblia mpo na kopesa ngai biyano na mituna nyonso oyo etali bomoi mpe namonaki ete biyano yango ebongaki mpenza mpe mokemoke nayaki koyeba likambo mpenza oyo Biblia elobelaka​—ete Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mokano ya Nzambe na mobimba. Koyeba ete Nzambe nkombo na ye Yehova mpe nyonso oyo asalelá biso, esimbaki mpenza motema na ngai. (Nzembo 83:18) Likambo ekamwisaki ngai mpenza ezalaki ebongiseli oyo azwaki mpo na kopesa mbeka ya lisiko; ezalaki kaka te ebongiseli moko boye to mpo na kosalela bosembo na ye, kasi emonisaki mpenza bolingo ya Nzambe. (Yoane 3:16) Nayekolaki mpe ete nazali na libaku ya kokóma moninga ya Nzambe mpe kozala na bomoi ya seko na paradiso esika kimya ekozala. (Yakobo 4:8) Nakómaki komituna, “Ndenge nini nakoki komonisa botɔndi?”

 Nakanisaki mingi mpo na bomoi na ngai. Nayekolaki na Biblia ete kopesa nde ememelaka moto esengo ya solosolo mpe nayokaki mposa ya koyebisa basusu mateya oyo nayekolaki. (Misala 20:35) Lokola nazalaki mobɛti monene ya lisano ya tenisi, mbula nyonso nazalaki kosala mikolo 200 libándá ya ndako na ngai mpo na kosala mimekano. Bomoi ya libota na biso ezalaki kotalela kaka ngai, ngalasisi na ngai, makambo oyo nasalaka mpe mosala na ngai. Namonaki ete nasengelaki kobongola makambo.

 Nayebaki ete kotika lisano oyo ezalaki kopesa ngai mbongo ebele mpo na makambo ya losambo ekozala ekateli oyo bato mingi bakokanga ntina na yango te. Kasi libaku ya koyeba Yehova malamu mpe kozwa bomoi ya seko ezalaki na valɛrɛ koleka mbano nyonso oyo nakokaki kozwa na lisano ya tenisi, yango wana ezalaki mpasi te nazwa ekateli mpo na oyo nakosala. Nazalaki na ekateli ya koboya kokipe oyo bato bakoki koloba​—ekateli yango etalelaki nde ngai moko. Vɛrsɛ ya Biblia oyo elendisaki ngai mpenza nakipe te mbamba oyo bakotya ngai ezali Nzembo 118:6: “Yehova azali pene na ngai; nakobanga te. Moto ya mabele akoki kosala ngai nini?”

 Na ntango wana, bato mosusu oyo babimisaka mbongo mpo na kobongisa lisano yango basɛngaki ngai nasala na bango kɔntra ya mbongo mingi oyo elingaki kosalisa ngai nabɛta lisano ya tenisi ya baoyo bayebi mpenza lisano yango, mpo nazala na mitungisi te na boumeli ya bambula mingi. Kasi nasí nazwaki ekateli na ngai, naboyaki kɔntra yango mpe nsukansuka natikaki masano ya mimekano na ATP. Nakobaki koyekola Biblia mpe na mokolo ya 2/07/1994 nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI

 Ezali te na likambo moko ya mpasi oyo nakutaná na yango oyo etindaki ngai nakanisa Nzambe. Namonaka mpe te ete nazali moto oyo azalaki koluka solo. Nazalaki komona ete bomoi na ngai ezalaki malamu mpe nazalaki na mposa ya eloko mosusu te. Ata bongo, na mbalakaka, lokola nde solo ya Biblia ezalaki kozela ngai namona yango, nayaki koyeba ete bomoi ezali na ntina mpenza mpe bomoi na ngai ekómi malamu koleka ndenge oyo nakokaki kokanisa! Boyokani ya libota na biso ezali makasi mpe tokómá na bomoko mingi koleka. Nazali mpe na esengo ndenge bana na ngai misato ya mibali balandi lokolo na ngai​—na masano te, kasi nde lokola bakristo.

 Nasepelaka kaka kobɛta tenisi. Na boumeli ya bambula, nasalaka misala oyo ezali na boyokani na lisano ya tenisi mpo na kozwa mbongo ya kobikela, na ndakisa kozala antrenɛrɛ mpe mokambi ya centre moko ya lisano ya tenisi. Kasi namipesaka lisusu mobimba te na masano. Liboso nazalaki kosala ngalasisi bangonga mingi pɔsɔ nyonso mpo nabɛtaka lisano ya tenisi malamu mingi koleka, nabima molongi. Sikoyo, lokola nalekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola, nazali na esengo ya kosalela ntango na ngai mpo na kosalisa basusu báyekola Biblia mpe básalela toli na yango oyo ebongoli bomoi na ngai. Nazwaka esengo monene ndenge natyaka boyokani na ngai na Yehova na esika ya liboso mpe nayebisaka basusu elikya oyo nazwi ya kozala na bomoi ya malamu koleka na mikolo ekoya.​—1 Timote 6:19.

a ATP ezali lingomba ya bato oyo bayebi kobɛta tenisi malamu mpenza. Ezali etuluku ya bato oyo bakambaka lisano ya tenisi mpo na bato oyo bayebi mpenza kobɛta lisano yango. ATP ebongisaka mimekano ya lisano ya tenisi mpo na baoyo bayebi mpenza kobɛta yango mpe epesaka bapwɛ mpe mbano epai ya baoyo balongaka. Bapwɛ nyonso oyo bazwaka na mimekano yango nde esalaka ete bátya moto na molɔngɔ ya bato oyo bayebi kobɛta tenisi na mokili mobimba.