Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Yuriy Savelyev azali kosamba na mokolo ya 26/08/2020

11 SANZA YA 12, 2020
RUSSIE

Ndeko Yuriy Savelyev, oyo asili kosala mbula mibale na bolɔkɔ, akoki kosala mbula 8 na bolɔkɔ

Ndeko Yuriy Savelyev, oyo asili kosala mbula mibale na bolɔkɔ, akoki kosala mbula 8 na bolɔkɔ

Dati ya kosambisa

Na mokolo ya 16/12/2020, * tribinale ya etúká ya Leninski na Novossibirsk esengeli kokata likambo ya ndeko Yuriy Savelyev. Prokirɛrɛ asɛngaki bákatela ndeko Yuriy mbula 8 ya bolɔkɔ. Oyo ezali etumbu ya bolɔkɔ oyo eleki molai oyo ndeko na biso na Russie akosala kobanda na 2017, tribinale monene ezwaki ekateli yango.

Makambo etali bomoi na ye

Yuriy Savelyev

  • Abotamá na: 1954 (Krokhalyovka, na etúká ya Novossibirsk)

  • Bomoi na ye: Mama na ye akufaki ntango nazalaki naino mwana moke. Yaya na ye ya mwasi nde abɔkɔlaki ye. Azalaki kosala na centrale moko ya kura. Abandaki kosepela na makambo etali mangomba nsima ya liwa ya mama na ye. Ayaki koyeba ete Biblia ezali na biyano oyo ebongi na mituna oyo azalaki komituna. Azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova na 1996

Ndenge makambo elekaki

Na mokolo 08/11/2018, bapolisi bakɔtaki na ndako na ye mpe na bandako mosusu 9 ya Batatoli ya Yehova na etúká ya Novossibirsk. Bakangaki Yuriy mpe batyaki ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

Bafundaki ndeko Yuriy ete azali kobongisa misala ya Batatoli ya Yehova na engumba yango. Atako azalaki kosɛnga mbala na mbala ete bátika ye, babakisaki mikolo oyo asengelaki kolekisa na bolɔkɔ mpo na mwa ntango mbala 9 mobimba. Banda azali na bolɔkɔ esali sikoyo mbula koleka mibale. Banda na 2017 tribinale monene ya Russie ezwaki ekateli na likambo na ye, kaka ndeko Dennis Christensen mpe Sergueï Klimov basali bambula mingi na bolɔkɔ koleka ndeko Savelyev.

Na mokolo ya 09/12/2020, ntango alobaki maloba na ye ya nsuka na tribinale, na mpiko nyonso ndeko Yuriy alobaki na bazuzi boye: “Bafundá ngai naino te mpo nasali likambo moko ya mabe, kasi mpo nazali kotosa mateya ya lingomba ya Batatoli ya Yehova.

“Nazali na monguna te, mpe banda nabotamá mpe nakómá na mbula pene na 67, balandelá ngai te na makambo etali Leta to na makambo etali kobuka mibeko. Nazali na ekateli ya komibatela na makambo ya politiki. Na maloba mosusu, nalingaka te mobulu ya ndenge nyonso, ezala na maloba to na makanisi to na nzoto.

“Mibeko ya Nzambe esɛngi ngai nasalela bato nyonso makambo na limemya, ezala bato yango batángá to te, bazali mposo nini, to na mangomba nini.

“Liloba ya Nzambe elendisi biso tósalela bakonzi makambo na limemya. Na mokanda ya Baroma 13:1-3, elobi boye: ‘Tiká molimo nyonso eyokelaka bakonzi oyo bazali liboso, mpo bokonzi ekoki kozala te soki Nzambe atikeli yango nzela te; bokonzi na bango ezali na ndelo oyo etyami na Nzambe. Yango wana, moto oyo azali kotɛmɛla bokonzi atɛmɛli ebongiseli ya Nzambe’

“Nazali kotɛmɛla bakonzi te, mpo nalingi te kotɛmɛla Nzambe. Ezali lokola moto azali kotya sinyatire mpo na liwa. Ezali kaka na lisalisi ya Batatoli ya Yehova nde nayaki koyeba makambo etali Nzambe ya solo mpe mwana na ye, Yesu Kristo. Na nzela na bango, nde nandimaki ete Biblia, Makomami mosantu, ezali kaka buku moko oyo eleki babuku mosusu. Yango esalisaka biso na makambo nyonso ya bomoi na biso.”

Tolendisami na koyoka ete kondima ya ndeko Yuriy ezali se makasi, mpe mpiko oyo azali na yango emonisi ete Yehova azali kopambola ye mpe kopesa ye kimya ntango nyonso.​—Yisaya 26:3.

^ par. 3 Bakoki kobongola dati yango.