Lakisá makambo oyo ezali na kati

RUSSIE

Bakangami mpo na kondima na bango

Bakangami mpo na kondima na bango

Bakonzi ya Russie babakisi milende na bango ya kobundisa Batatoli ya Yehova; basali kampanye moko mpo na kobangisa bango mpe yango ezali kozongisa na makanisi eleko ya Union-Soviétique. Na mokolo ya 13/06/2019, Batatoli ya Yehova 36 bazalaki na bolɔkɔ mpo na mwa ntango, 23 bazalaki na bandako oyo basoda bazali kokɛngɛla mpe 73 bazalaki na ndingisa te ya kolongwa na bingumba oyo bafandaka. Bafundaki bango nyonso ete bazali kobongisa misala ya ebongiseli oyo “makambo na yango elekisaka ndelo,” ndenge bapesaki mabɔkɔ to mbongo mpo na misala yango. Bazali sikoyo kosala baankɛtɛ na bandako ya Batatoli ya Yehova soki 211, oyo bazali kati na mbula 19 mpe 84.

Bakonzi ya Russie bazali koluka komilongisa mpo na makambo oyo bazali kosala. Bazali koloba ete ekateli oyo ezwamaki na sanza ya 04/2017 ya kopekisa bibongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo eyebani na Leta mpe kosalela na ndenge ya mabe artikle 282 ya mibeko ya mboka na bango. Mpo na koloba solo, bazali kofunda Batatoli ya Yehova na Leta mpo bazali kosala makambo na bango ya losambo na kimya nyonso. Soki bakwei na likambo, bamosusu na bango oyo bakangi bango bakoki kokatela bango etumbu ya bolɔkɔ ya mbula tii zomi.

Kobanda sanza ya 02/2018, bapolisi bazali kolandela Motatoli ya Yehova mokomoko: bazali kokanga mpe kotya bango na bolɔkɔ. Bapolisi na mindoki na mabɔkɔ, bazali kokɔtela Batatoli ya Yehova na bandako mpe mbala mingi bazali kolakisa bango mindoki na elongi ezala epai ya bana to mibange mpe bazali kolalisa bango na nse. Ntango bapolisi bazali kosala baankɛtɛ yango, bazali kobɔtɔla bango biloko mpe na nsima bazali komema Batatoli ya Yehova mosusu mpo na kotunatuna bango mituna. Nsima ya baankɛtɛ yango, bazali kofunda Batatoli ya Yehova ete basalaki misala oyo makambo ya ebongiseli na yango elekisaka ndelo mpe bazali kosɛnga batribinale ekɔtisa naino bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango. Soki batye bango na bolɔkɔ, baprokirɛrɛ bazali kosɛnga ete bábakisela bango mikolo ya kotikala naino na bolɔkɔ. Mbala mingi batribinale ezali kondima bátika bango naino na bolɔkɔ.

Na mokolo ya 15/02/2019, likambo moko ya mabe mpenza esalemaki na engumba Sourgout, epai bapolisi babɛtaki mibali nsambo oyo bazali Batatoli ya Yehova mabe mpenza nsima ya kokɔtela Batatoli ya Yehova ya engumba yango na bandako. Balongolaki bango bilamba, bakangaki bango mpema, basopelaki bango mai, babɛtaki bango mpe batyaki bango kura na esumbeli na mwa mondoki ya kura oyo babengaka yango tasers. Basalaki bango makambo yango ya mabe mpenza na nse ya etaje ya biro ya komite ya ankɛtɛ ya Russie, na Sourgout. Bazali kolandela sikoyo Batatoli ya Yehova 19, na kati na bango ndeko mwasi moko mpo “babongisaki misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.” Na mibali oyo banyokolaki bango mabe, misato bazali naino na bolɔkɔ.

Bakateli Dennis Christensen etumbu kaka mpamba

Nsima ya kosamba pene na mbula mobimba mbala koleka 50 na tribinale, bakatelaki Dennis Christensen, oyo azali na mbula 46 mpe azali moto ya Danmark, mbula motoba ya bolɔkɔ mpo asalaki makambo na ye ya losambo oyo Motatoli ya Yehova nyonso asalaka. Na mokolo ya 06/02/2019, zuzi Alexeï Roudnev ya tribinale ya etúká ya Jeleznodorojny na Orel, atángaki ekateli oyo ekweisaki Christensen mpo na bifundeli ya lokuta oyo bafundaki ye na yango ete “abongisaki misala ya ebongiseli moko oyo makambo na yango elekisaka ndelo,” ndenge artikle 282.2(1) ya mibeko ya Russie emonisi yango. Na mokolo ya 23/05/2019 bazuzi 3 ya tribunale ya etúká ya Orel baboyaki makambo oyo Dennis Christensen asɛngaki mpe bandimaki akɔta na bolɔkɔ mpo na mbula motoba.

Bakangaká Christensen na mokolo ya 25/05/2017, na Orel, na likita ya losambo ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki kosalema na kimya nyonso, ntango bapolisi mpe bato ya sireté na mindoki na mabɔkɔ, bakɔtelaká bango mpe bakataká likita yango. Banda wana, batyá ye na bolɔkɔ No. 1 na etúká ya Orel.

Milende ezali kokoba kosalema mpo na kosukisa likambo ya kokɔtisa bato na bolɔkɔ kaka mpamba

Ndenge minyoko ezali se kobakisama na Russie ezali komonisa ete bakonzi bazali na mposa kaka te ya kopekisa bibongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo eyebani na Leta, kasi mpe kolongola bonsomi na bango ya losambo. Baavoka ya Batatoli ya Yehova wana oyo basali mabe moko te balongi naino te kosukisa likambo ya kokɔtisa Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ kaka mpamba. Kasi, bakɔtisaki dosye yango na komite ya ONU oyo elandelaka ntomo ya moto mpe na etuluku ya ONU oyo etalelaka likambo ya baoyo bakangaka bango kaka mpamba mpe bakɔtisaki dosye yango mpe na tribinale ya Mpoto oyo etalelaka ntomo ya moto. Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali na elikya ete batribinale ya mikili ndenge na ndenge ekozwa bikateli mosika te mpo Russie etika kobundisa Batatoli ya Yehova mpe bonsomi na bango ya losambo.

Badati

  1. 23/05/2019

    Bazuzi 3 ya tribunale ya etúká ya Orel baboyaki makambo oyo Dennis Christensen asɛngaki mpe bandimaki akɔta na bolɔkɔ mpo na mbula motoba.

  2. 21/05/2019

    Batye na bolɔkɔ Batatoli ya Yehova 36.

  3. 26/04/2019

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Smolensk. Bakangaki Batatoli ya Yehova mibale ya misato mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  4. 19/04/2019

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na Partizansk, Novosibirsk, Minusinsk, mpe Sharypovo. Bakangaki Batatoli ya Yehova mibale: moko ya mobali mpe moko ya mwasi batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  5. 17/03/2019

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Luchegorsk. Bakangaki Batatoli ya Yehova mibale ya mibali mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  6. 15/02/2019

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Sourgout mpe na Liantor, na etúká ya Khanty-Mansi. Bakangaki Batatoli ya Yehova misato ya mibali mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  7. 06/02/2019

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Ouraï. Bakangi Motatoli ya Yehova moko ya mobali mpe batye ya na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Saransk. Bakangi Batatoli ya Yehova misato mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

    Tribinale ya etúká ya Jeleznodorojny ekweisi Dennis Christensen na likambo mpe ekateli ye etumbu ya mbula motoba ya bolɔkɔ.

  8. 27/01/2019

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Ivanovo. Bakangi Motatoli ya Yehova moko ya mobali mpe batye ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  9. 12/12/2018

    Bapolisi ya Neftekoumsk bakangi Motatoli ya Yehova moko oyo ayei na biro ya polisi mpo bazwaki mokanda oyo esɛngaki aya komilakisa na biro ya polisi.

  10. 09/12/2018

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Neftekoumsk. Bakangi Batatoli ya Yehova mibale mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  11. 10/11/2018

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova oyo bazalaki na likita na restora moko. Bakangi mibali mingi ya Batatoli ya Yehova mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  12. 09/11/2018

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Novossibirsk mpe bakangi mobali moko oyo azali Motatoli ya Yehova mpe batye ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  13. 18/10/2018

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Dyurtuli mpe bakangi mobali moko oyo azali Motatoli ya Yehova mpe batye ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  14. 09/10/2018

    Bapolisi mpe bato ya sireté bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Kirov. Bakangi mibali mingi, ata mpe Andrzej Oniszczuk, oyo azali Polonais mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  15. 07/10/2018

    Bapolisi mpe bato ya sireté bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Sytchiovka mpe bakangi Nataliya Sorokina ná Mariya Troshina. Batye basi yango mibale na bolɔkɔ.

  16. 02/08/2018

    Bapolisi mpe bato ya sireté (FSB) bakɔteli bato na bandako na Khabarovsk. Bakangi mobali moko oyo azali Motatoli ya Yehova mpe batye ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  17. 28/07/2018

    Bapolisi bakɔteli mwasi moko ya mobange na ndako mpe bakangi mwana na ye ya mobali oyo azali Motatoli ya Yehova mpe batye ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  18. 25/07/2018

    Bapolisi oyo bayaka nokinoki kosukisa mobulu bakɔteli bato na bandako na Kostroma. Bakangi mobali moko oyo azali Motatoli ya Yehova mpe batye ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  19. 22/07/2018

    Bapolisi mpe bakonzi ya sireté bakɔteli bato na bandako na Beriozovski. Bakangi mibali mibale oyo bazali Batatoli ya Yehova mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  20. 15/07/2018

    Bapolisi bapanzipanzi biloko na bandako ya Batatoli ya Yehova na Penza. Bakangi mobali moko oyo azali Motatoli ya Yehova mpe batye ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  21. 04/07/2018

    Bapolisi bakɔteli bato na bandako na Omsk. Bakangi Sergueï ná Anastasia Poliakov mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango. Poliakov azali mwasi ya liboso oyo ekólo Russie ekangi ye mpo na likambo ya kolekisa ndelo na makambo ya losambo.

  22. 03/07/2018

    Bapolisi bakangi Andreï Stoupnikov na libándá ya mpɛpɔ na Krasnoïarsk mpe batye ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  23. 12/06/2018

    Bapolisi bakɔteli Batatoli ya Yehova na bandako na Saratov. Bakangi mibali mingi ya Batatoli ya Yehova mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  24. Ebandeli ya 06/2018

    Bapolisi bakɔteli bato na bandako na Tomsk mpe na Pskov. Bakangi mobali moko oyo azali Motatoli ya Yehova mpe batye ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  25. 05/2018

    Bapolisi bakɔteli bato na bandako na Orenbourg, Birobijan, Perm, Naberejnye Tchelny, Magadan mpe na Khabarovsk. Bakangi mibali zomi oyo bazali Batatoli ya Yehova mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  26. 04/2018

    Bapolisi bakɔteli bato na bandako na Oufa, Poliarny, Vladivostok mpe na Chouïa. Bakangi mibali mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova mpe batye bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango.

  27. 19/02/2018

    Babandi kosambisa Dennis Christensen na tribinale ya etúká ya Jeleznodorojny epai ya zuzi Alekseï Roudnev.

  28. 20/07/2017–11/2018

    Bapusi mbala na mbala mikolo ya bolɔkɔ ya Dennis Christensen; liboso na tribinale ya etúká ya sovietskiy mpe na nsima na tribinale ya etúká ya Jeleznodorojny.

  29. 26/05/2017

    Tribinale ya etúká ya sovietskiy na Orel ekateli Dennis Christensen etumbu mpo na mwa ntango, ya sanza mibale ya bolɔkɔ.

  30. 25/05/2017

    Bapolisi bakɔteli bato na likita ya losambo mpe bakangi Dennis Christensen.