Lakisá makambo oyo ezali na kati

Banda na lobɔkɔ mwasi: Anatoly Razdobarov ná mwasi na ye, Greta, mpe Nikolay Merinov ná mwasi na ye, Liliya, liboso bábɛtabɛta bango na bapolisi ya Russie oyo balandelaka kotosama ya mibeko

10/10/2021
RUSSIE

Bapolisi babɛti basi mibale ná mibali na bango

Bapolisi babɛti basi mibale ná mibali na bango

Na mokolo ya yambo, mwa 04/10/2021, bapolisi ya Russie oyo babengi OMON a babɛtaki ndeko Razdobarov Anatoly ná mwasi na ye Greta, mpe ndeko Merinov Nikolay ná mwasi na ye Liliya. Makambo mabe yango esalemaki ntango bapolisi oyo balandelaka kotosama ya mibeko bakɔtaki na ndako 12 ya Batatoli ya Yehova na engumba Irkutsk. Bapolisi yango bakangaki bandeko ebele mpenza mokolo wana.

Na mokolo yango, na ngonga 6:00 ya ntɔngɔ, bapolisi bakɔtaki na makasi na ndako ya ndeko Anatoly ná mwasi na ye Greta. Bapolisi yango babendaki ndeko Greta na nsuki tii na eteni mosusu ya ndako, bazongisaki ye mabɔkɔ nsima, batye ye menɔti mpe babɛtabɛtaki ye.

Kaka na ntango yango, babwakaki ndeko Anatoly na nse, bazongisaki ye mabɔkɔ na nsima, batyaki ye mpe menɔti, mpe babandaki konyatanyata ye na motó mpe na libumu. Bapolisi basimbaki ye na menɔti yango mpe batombolaki ye. Ndeko Anatoly ayokaki mpasi makasi mpo kilo ya nzoto mobimba ekitelaki ye na mapeka. Bapolisi yango bazalaki kobɛta ye na mabɔkɔ, mpe bazalaki koloba na ye ete andima ete abuki mobeko mpe afunda bandeko mosusu. Bapolisi yango banyokolaki ye lisusu mabe mpenza na ndenge bazalaki kokɔtisa ye molangi na lisoko. Baumelaki na ndako ya bandeko Razdobarov ngonga koleka mwambe mobimba.

Ntango basoda bakɔtaki na ndako ya ndeko Merinov Nikolay ná mwasi na ye Liliya, liboso babɛtaki ndeko Nikolay eloko moko ya makasi mpe kilo na elongi. Na mbala moko, akweaki na nse mpe azalaki koyeba lisusu eloko te. Ntango akomaki kozongisa makanisi, amonaki polisi moko afandeli ye, azali kobɛtabɛta ye. Polisi yango abukaki ndeko Nikolay mino ya liboso. Ndeko Liliya alalaki na mbeto, basimbaki ye na nsuki, babendaki ye na nse mpe batyaki ye menɔti. Bapolisi yango babɛtabɛtaki ye liboso bápesa ye nzela alata bilamba ya kobima na yango libanda.

Na mobeko ya Russie, soki moto asali moto ndenge wana asengeli kozwa etumbu. Lisusu, Fédération de Russie endimá mibeko mpe bibongiseli ya mikili ndenge na ndenge mpo na kobatela bato mpo bányokwama te. Kasi, babalani yango bakokoba kokende na batribinale, ezala na Russie to na mikili mosusu, mpo likambo na bango ekatama malamu mpo na mabe monene wana.

Nsima ya mokolo oyo bapolisi bakɔtaki na bandako 12 na Irkutsk mpe babɛtabɛtaki basi mibale ná mibali na bango, bandeko soki 300 bayaki na tribinale ya etúká ya Oktyabrskiy na Irkutsk mpo na kolendisa bandeko motoba oyo bazalaki na kasho liboso básambisa bango

Nsima ya mikolo mibale, ntango bapolisi yango bakɔtaki na bandako mosusu, bakangaki bandeko motoba, batyaki bango na kasho liboso básamba: Yaroslav Kalin, Sergey Kosteev, Nikolay Martynov, Mikhail Moish, Aleksey Solnechny, mpe Andrey Tolmachev. Bandeko soki 300 bakendaki na batribinale na kimya mpenza mpo na kolendisa bandeko na bango bakristo oyo bazali konyokwama mpo na kozanga bosembo ya ndenge wana.

Epai ya bandeko na biso nyonso ya bolingo na Russie, tozali koyebisa bino maloba oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, oyo ntoma Paulo alobaki na bakristo ya Tesaloniki: “Tozali komikumisa mpo na bino na kati ya masangá ya Nzambe mpo na koyika mpiko na bino mpe kondima na bino na minyoko na bino nyonso mpe malɔzi oyo bozali kokangela motema.”​—2 Batesaloniki 1:4.

a Limpinga ya libateli ya ekólo Russie oyo batambolakatambolaka mpo na mokano moko ya sikisiki