Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Oyo eleki ebakisamaka na oyo ezangi

Oyo eleki ebakisamaka na oyo ezangi

01/10/2020

 Batatoli ya Yehova basalaka mosala moko ya ntina mingi ya kosalisa bato na mikili koleka 200. Kasi, kaka mikili 35 nde bazwaka makabo ya bamboka na bango mpo na kokokisa bamposa na bango. Ndenge nini bamposa ya mikili oyo makabo na yango ezalaka moke ekokisamaka?

 Bandeko oyo bakambaka mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba batalelaka makambo oyo Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba bazali na yango mposa mpo na kosambela Yehova mpe kosakola nsango malamu. Makabo ebatelamaka malamu mpe esalelamaka na ndenge oyo ebongi. Soki filiale moko ezwi makabo koleka oyo bazali na yango mposa, etindaka mbongo oyo etikali na mikili oyo ezali na makabo mingi te. Na siɛklɛ ya liboso mpe, bakristo bazalaki kosalisana “na nzela ya bokokani.” (2 Bakorinti 8:14) Basalelaki mbongo ya makabo oyo elekaki mpo na kosalisa bakristo oyo bazalaki na yango mingi te.

 Bandeko na biso oyo bazwaka makabo oyo eutaka na filiale mosusu bayokaka ndenge nini? Na ndakisa, na Tanzanie, bato mingi basalelaka pene na dolare mibale mpo na kokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo, makabo ya ndenge wana esalelamaki mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi, oyo lisangá ya Mafinga ebandaki kosalela. Lisangá yango ekomaki boye: “Banda babongisá Ndako ya Bokonzi, bato bakómá koya mingi na makita na biso! Topesi mersi na ebongiseli ya Yehova mpe na bandeko ya mokili mobimba mpo na ezaleli na bango ya kokaba, oyo esali ete tózala na esika kitoko ya losambo.”

 Bandeko na biso mosusu na Sri Lanka bazangaki bilei mpo na maladi ya coronavirus. Imara Fernando mpe mwana na ye ya mobali ya moke, Enosh, bazalaki mpe na kati ya bandeko yango. Kasi bazwaki lisungi oyo ebongi na nzela ya makabo oyo eutaki na mikili mosusu. Na mokanda moko, bakomaki boye: “Topesi mersi na bandeko oyo bamoniseli biso bolingo na ntango oyo ya mpasi. Tozali na esengo ya kozala na kati ya libota oyo, mpe tozali kobondela ete Yehova asalisa bandeko nyonso na mikolo oyo ya nsuka.”

Imara mpe Enosh Fernando

 Ezala bandeko na biso bazali na mboka nini, basepelaka kokabola oyo bazali na yango na basusu. Na ndakisa, Enosh, asalaki mwa kɛsi oyo abandaki kobomba mbongo mpo na kopesa makabo mpe kosalisa mabota oyo ezali na mposa. Guadalupe Álvarez mpe asali kaka bongo. Afandaka na Mexique, na esika oyo bato mingi bazwaka mbongo mingi te. Kasi, apesaki oyo akoki kopesa na ebongiseli ya Yehova. Akomaki boye: “Nazali kopesa Yehova mersi mpo na boboto mpe bolingo na ye ya sembo. Nayebi ete makabo na ngai ekobakisama na makabo mosusu mpe ekosalelama mpo na kosalisa bandeko oyo bazangi.”

 Bafiliale oyo etindaka mbongo na bisika oyo ezali na mposa, esepelaka kosala yango. Anthony Carvalho, oyo azali moko ya bato oyo bakambaka filiale ya Brésil, alobi: “Na boumeli ya bambula mingi, esɛngaki ete mikili mosusu etindela biso mbongo. Yango wana, bokoli esalemi makasi. Lelo oyo, makambo ebongwaná mpe tokómá kosalisa basusu. Bandeko ya Brésil balandelaka ndenge mosala ya kosakola ezali kosalema na mokili mobimba mpe koluka esika oyo tokoki kosalisa.”

 Ndenge nini Batatoli ya Yehova bakoki kosalisa bandeko na bango malamu koleka? Basengeli kosuka kaka te na kotinda mbongo mbala moko na bafiliale ya mboka ya bapaya, kasi mpe kotya makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Bakoki kotya yango na bakɛsi ya makabo, oyo bakomá “makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba” to kokende na Internet na donate.isa4310.com. Tosepelaka mingi na makabo ya ndenge wana.