Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge nini Batatoli ya Yehova basalelaka makabo?

Ndenge nini Batatoli ya Yehova basalelaka makabo?

 Tosalelaka makabo na biso na makambo ya losambo mpe mpo na kosalisa bato oyo bakutani na mikakatano. Tosalaka makambo yango mpo na kokokisa mokumba na biso ya libosoliboso: kosalisa bato bákóma bayekoli ya Yesu Kristo.​—Matai 28:19, 20.

 Tosalelaka makabo na biso te mpo na kokómisa moto moko boye mozwi. Tofutaka te bato oyo bakambaka biso to basaleli mosusu, mpe Batatoli ya Yehova bafutamaka te mpo na kosakola ndako na ndako. Bato oyo basalaka na babiro ya bafiliale na biso mpe na biro monene ya Batatoli ya Yehova, ata mpe baoyo batambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, bafutamaka te.

Mwa makambo oyo tosalaka

  •   Kobimisa mikanda: Mbula na mbula, tobongolaka Biblia mpe mikanda oyo elobelaka mateya ya Biblia, tonyataka to tobimisaka yango, totindaka yango na bisika ndenge na ndenge, mpe topesaka bato ofele bamilio ya Babiblia mpe ya mikanda yango. Ndenge moko mpe, totyaka mikanda na biso ofele na site Internet na biso jw.org mpe na programɛ JW Library.

  •   Kotonga bisika ya losambo mpe kobatela yango: Totongaka mpe tobatelaka bisika ya losambo na mokili mobimba mpo ete bandeko bázala na bisika ya malamu ya kokutana mpo na kosambela Nzambe. Totongaka mpe tobatelaka babiro ya bafiliale mpe babiro ya kobongola mikanda. Mosala yango esalemaka mingimingi na bato oyo bamipesi na bolingo na bango moko, yango esalaka ete tóbebisa mbongo mingi te.

  •   Kotambwisa makambo: Misala oyo esalemaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova, na babiro ya bafiliale na biso, na babiro ya kobongola mikanda, mpe misala ya bandeko oyo basalaka mibembo mpo na kolendisa bandeko mosusu, makabo oyo bandeko ya mokili mobimba bapesaka na bolingo na bango moko nde esalaka ete misala wana nyonso esalema.

  •   Kosakola: Batatoli ya Yehova bafutamaka te mpo na kosakola nsango malamu to mpo na koteya basusu “liloba ya Nzambe.” (2 Bakorinti 2:17) Kasi, kaka ndenge ezalaki kosalema na siɛklɛ ya liboso, ezali na bandeko oyo baponamá mpe bazwá formasyo, oyo bamipesaka mingi na mosala ya kosakola. Ebongiseli na biso epesaka bandeko yango bisika ya kofanda mpe biloko mosusu oyo bazali na yango mposa.​—Bafilipi 4:16, 17; 1 Timote 5:17, 18.

  •   Mateya: Mbongo oyo tobimisaka mpo na kosala mayangani ya mike mpe ya minene eutaka na makabo. Tobimisaka mpe mateya ya Biblia oyo moto akoki koyoka kaka na matoi mpe bavideo. Bandeko oyo batambwisaka masangá na biso ná bandeko oyo bamipesaka mingi na mosala ya kosakola bazwaka formasyo na biteyelo mpo bákokisa malamu mikumba na bango.

  •   Kosunga bandeko oyo bazwi likama: Topesaka bilei, mai mpe bisika ya kofanda na bandeko oyo bakutani na likama oyo ebimaka yango moko to mpe likama oyo bato babimisaka. Tosungaka kaka te “baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima,” kasi mpe baoyo bazali Batatoli te.​—Bagalatia 6:10.