Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Kosamba mpo na bonsomi ya losambo ya bato oyo bafandaka na bamboka ya kati

Kosamba mpo na bonsomi ya losambo ya bato oyo bafandaka na bamboka ya kati

01/05/2021

 Na kati ya bato ebele oyo bafandaka na Amérique ya Sudi, ezali na bamilio ya bato oyo balobaka minɔkɔ na bango moko mpe bazali na mimeseno na bango moko. Mingi na bato yango basambelaka Yehova lokola biso, baoyo basepelaka na mimeseno na bango. Mpo na kosalisa bato báyekola makambo ya Nzambe, babongolaka mpe bakabolaka mikanda ya Batatoli ya Yehova na minɔkɔ koleka 130 na Amérique ya Sudi. a Atako bongo basusu bazali konyokola bango mpo baponi kosalela Yehova mpe baboyi komipesa na mimeseno oyo eyokani te na mateya ya Biblia, ata soki bato mingi basalaka yango. Ndenge nini makabo na yo esalelamaka mpo na kosalisa bango?

Esalisaka mpo bázonga na bisika na bango

 Na Mexique, bandeko na biso na mboka ya Huichol na bangomba ya Etúká ya Jalisco baboyaki na limemya nyonso kosangana na mimeseno ya losambo oyo eyokani te na mateya ya Biblia. b Kasi yango epesaka bato mosusu ya mboka yango nkanda. Na mokolo ya 04/12/2017, ebele ya bato ya mobulu babundisaki etuluku moko ya Batatoli mpe bato mosusu oyo bazalaki elongo na bango. Ebele mpenza ya bato yango babenganaki bango na mboka, babebisaki biloko na bango mpe bayebisaki bango ete bakoboma bango soki bameki kozonga na mboka.

 Batatoli oyo bazali na bingumba ya zingazinga basalisaki mbala moko bandeko na biso. Kasi nini ekoki kosalema mpo bákoka kozonga na bisika na bango? Ndeko moko na nkombo Agustin alobaki boye: “Tozali na mbongo mingi te mpo na koluka avoka mpe toyebi te ndenge ya kotuna toli epai ya bato ya mibeko.”

 Ntango kaka bonsomi ya losambo ya bandeko na biso ekómaki na likama, Betele ya Amérique Centrale ezwaki mbala moko bibongiseli. Ya liboso, basɛngaki na bakonzi ya mboka bálandela naino makambo mabe oyo esalemi. Na nsima, bazwaki ndingisa ya Komite ya Batambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova mpo básala elongo na Departema oyo etalelaka mibeko ya biro monene mpe báfunda makambo yango na Leta mpo na bolamu ya bandeko na biso na Huichol. Bamemaki likambo yango tii na Tribinale monene ya ekoló elingi koloba tribinale oyo eleki monene na Mexique.

 Ekipi moko oyo esangisi baavoka ya mikili ndenge na ndenge emonisaki ete kaka ndenge basusu basengeli kotosa mimeseno ya bato ya mboka, mboka yango moko mpe esengeli kotosa mpe kobatela bonsomi ya bato na yango nyonso. Ntomo ya moto ezali na ndelo te.

 Na mokolo ya 08/07/2020, Tribinale monene ya ekoló yango ekataki likambo yango mpe elongisaki Batatoli ya Yehova. Bapesaki mitindo ete baoyo nyonso babenganaki bango basengeli sikoyo kozonga na bisika na bango. Agustin, oyo tolobelaki na ebandeli, amonisaki ndenge oyo ye ná bandeko mosusu bayokaki, alobi boye: “Tozali na botɔndi mingi mpe na esengo mpo na oyo bandeko basali mpo na biso. Soki basalisaki biso te, tokokaki kosala mpe eloko moko te.”

“Kosala mingi mpo na bato moke”

 Kaka na ntango wana, bandeko na biso na San Juan de Ilumán, mboka moko na ekólo Equateur epai bato ebele ya lobwaku ya Otavalo bafandaka, bakutanaki mpe na botɛmɛli ya ndenge wana. Na 2014, nsima ya kozwa mikanda nyonso oyo esɛngisami mpo na kotonga, babandaki kotonga Ndako ya Bokonzi.

 Kasi, sango moko ayaki ná etuluku ya bato koleka 100 mpe bayebisaki bandeko bátika kotonga. Bato ya mboka bayebisaki Batatoli ya Yehova bátika kosala makita na bango ya losambo.

 Badepartema oyo etalelaka mibeko na Betele ya ekólo Equateur mpe ya biro monene esalaki elongo mpo na kosalisa lisangá na ndenge batosaki te bonsomi na bango ya losambo. Bandeko na biso bamemaki likambo yango na Tribinale. Yango esalaki ete bakonzi ya mboka bátika kotɛmɛla bandeko na biso, bátika bango bázongela kosala makita mpe básilisa kotonga Ndako ya Bokonzi.

 Kasi mpo na kobatela ntomo ya bandeko na biso na mikolo ezali koya, bamonisi na biso basɛngaki na tribinale monene ezwa ekateli moko ya ntina mingi na motuna oyo: Bato oyo bafandi na bamboka ya kati basengeli kotosa ntomo ya moto?

 Na mokolo ya 16/07/2020, Tribinale oyo etalelaka mibeko ya ekólo Equateur, tribinale oyo eleki monene na ekoló eyokaki likambo yango. Bandeko oyo bazali baavoka bazalaki kosamba mpo na lisangá. Lisusu, bandeko na biso minei oyo bazali baavoka oyo bayebi malamu mosala na bango ya mikili ndenge na ndenge basololaki na tribinale. Mpo na kotosa malako ya komibatela na coronavirus, bapesaki makanisi na bango uta na mikili ndenge na ndenge na nzela ya video. Yango ezali mbala ya liboso ete tribinale moko epesa nzela na ekipi moko ya baavoka oyo esambaka mpo na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba epesa makanisi na yango na ndenge wana. c Ekipi yango etángaki bato ya mibeko ya mokili mpo na komonisa ete bafandi ya bamboka ya kati bakoki te kosundola ntomo oyo bazali na yango kaka mpo bafandaka na bamboka ya kati.

Na nzela ya video, ekipi ya baavoka ya mikili ndenge na ndenge bazalaki kosamba mpo na ntomo ya bandeko na biso

 Bandeko na biso na lobwaku ya Otavalo bazali kozela na motema likoló ekateli ya Tribinale oyo etalelaka mibeko ya mboka. Mpo na sikoyo, bazali na botɔndi mingi mpo na lisalisi oyo bazwi. César, oyo azali nkulutu na lisangá ya Ilumán Quichua alobi: “Kaka Yehova nde na nzela ya ebongiseli na ye akoki kosala mingi mpo na bato moke.”

 Baavoka oyo basambaki na likambo yango bazali bango nyonso Batatoli ya Yehova mpe bazali na esengo ya kokabola boyebi na bango na makambo ya mibeko ofele. Nzokande, kobongisa makambo ya kosamba, komibongisa bango moko mpe komonisa makanisi na bango na tribinale ezwaka ntango mpe mbongo. Baavoka na biso mpe bandeko mosusu balekisaki ngonga koleka 380 mpo na kobongisa makambo ya kosamba mpe ngonga 240 mpo na kobongola mikanda na mokolo ya kosamba na Mexico. Baavoka soki 40 na mokili mobimba balekisaki bankama ya bangonga mpo na likambo ya kosamba na ekólo Equateur. Ndenge nini tokokaki kozongisa mbongo oyo ebimaki na likambo etali kosamba mpo na bandeko na biso? Ezali na nzela ya makabo oyo bopesaka na lolenge ekeseni, ndenge elimbolami na donate.isa4310.com. Matɔndi mingi mpo na ezaleli na bino ya kokaba.

a Batatoli ya Yehova babongolaka mpe mikanda na minɔkɔ mingi oyo elobamaka na Amérique ya Sudi mpe na elobeli mingi ya bajɛstɛ oyo esalelamaka kaka na etúká yango.

b Bato ya Huichol bayebani mpe na nkombo ya Wixáritari, mpe monɔkɔ na bango ebengamaka mbala mingi Wixárika.

c Atako likambo ya kosamba yango etalelaki te ebongiseli na biso ya mokili mobimba, bazuzi bapesaki bandeko na biso nzela bázala na tribinale lokola amicus curiae, elingi koloba, “moninga ya tribinale.”