Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Kobatela Bandako ya Bokonzi na eleko ya Coronavirus

Kobatela Bandako ya Bokonzi na eleko ya Coronavirus

01/10/2022

 “Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaki mokano ete, longola kaka soki bakonzi ya Leta bapekisi te, na pɔsɔ ya 01/04/2022 masangá nyonso elendisami ya kozongola kosala makita nyonso na Ndako ya Bokonzi.” Liyebisi yango etyamaki na site jw.org na sanza ya misato, mpe Batatoli ya Yehova na mokili mobimba basepelaki makasi mpenza. Kasi Coronavirus esilaki naino te. a Bambongwana mpe bisaleli nini tosengelaki na yango mpo na kobatela bayangani mpo bázwa te Coronavirus? Bandako na biso ya Bokonzi ekozala mpenza malamu mpo koyamba bato nsima ya kosala mbula mibale kozanga koyangana elongo?

 Bandeko na biso bamilɛngɛlaki basanza mingi liboso mpo na kozongisa makita na Bandako ya Bokonzi.

Bamposa ekeseni mpe basolisyo

 Nsima ya sanza moko ya kopekisa koyangana elongo na 2020, Departema ya kosala baplan mpe ya kotonga na mokili mobimba (WDC), na Warwick, na etúká ya New York, ebandaki kotalela malamumalamu makambo oyo esengeli mpo na kobatela Bandako na biso ya Bokonzi.

 Bamposa ya bisika moko na mokili ekeseni na oyo ya bamboka mosusu. Ndeko Matthew De Sanctis, oyo asalaka na Departema ya kosala baplan mpe ya kotonga na mokili mobimba (WDC), alobi boye: “Na bamboka mosusu, bazali na mokakatano ya bisika ya kosokola mabɔkɔ. Esɛngaka kosomba mai to kokende kotoka yango na liziba soki ezali kobima te na Bandako ya Bokonzi. Na bamboka mosusu, baguvɛrnema ebongolaki mibeko na yango na likambo etali kosalela ba-climatiseur, biloko oyo epesaka malili mpe mɔtɔ na bandako, mpe kotya bilembo mpo na bopɛto.”

 Likambo nini bandeko na biso basalaki mpo na kotosa mobeko yango? Ndeko Matthew alobi boye mpo na Bandako mingi ya Bokonzi: “kosomba biloko ya mindondo te mpe ya ntalo moke, ezalaki malamu mingi.” Na ndakisa, na Papouasie-Nouvelle-Guinée, bisika ya kosokola mabɔkɔ etyamaki na bakatini ya litre 20 oyo batyá pɔmpi. Bandeko na biso bazalaki na likoki ya kopesa biloko oyo esengelaki mpo na kotya bisika ya kosokola mabɔkɔ na Ndako ya Bokonzi mpe nyonso esalaki kaka motuya ya mbongo dolare 40. Bisika ya kosokola mabɔkɔ koleka 6 000 ya kitoko esombamaki na Azia mpo na Bandako ya Bokonzi na Afrika.

Baboti basengeli kozala ndakisa malamu epai ya bana na bango na likambo etali bopɛto

 Bambongwana mosusu esalemaki na likambo etali kotya mpe kobongisa vantilatɛrɛ, biloko oyo epesaka malili mpe mɔtɔ mpo mopepe ya kitoko ezala na kati ya Ndako ya Bokonzi. Masangá mingi esombaki nzete oyo batyaka mikro mpo ete mikro etambola te na mabɔkɔ ya bato. Milende mingi esalemaki mpo na kokitisa likama ya kozwa Coronavirus, na ndakisa kopɛtola mbala na mbala bisika oyo bato mingi basimbaka, bikangeli ya baporte mpe robinɛ. Masangá mosusu, na ba WC batyaki bisika ya kosokola mabɔkɔ kozanga kosimba robinɛ. Na Chili, bisaleli oyo bazalaki na yango mposa epesaki motuya ya mbongo soki dolare 1 400 mpo na Ndako ya Bokonzi mokomoko.

Mikro esengeli koleka te na lobɔkɔ ya moto moko mpe mosusu

 Ntango bazali kosala ete Bandako ya Bokonzi ebatelama malamu mingi, bandeko basalaki makasi ya kosalela makabo ya bandeko na ndenge oyo ebongi. Na ndakisa, na bamboka mosusu, lokola bazalaki kofutisa bampako te yango wana bandeko bazwaki libaku ya kosomba bisika ya kosokola mabɔkɔ mpe perche, bandeko bazwaki matomba na libaku wana. Mpo na kobatela malamu makabo ya bandeko, babiro ya filiale esalaki elongo mpo na kosomba biloko mingi koleka ndenge oyo ezalaki kosalema liboso. Mbala mingi, Babiro ya filiale mpe Departema ya kosomba biloko na mokili mobimba, bazwaki bibongiseli mpo na kosomba biloko mbala moko na kompanyi, yango esalaki ete motuya ya biloko ekita moke mpe kozwa yango na ngonga oyo ebongi.

Esika ya kosokola mabɔkɔ

“Libateli oyo nazalaki mpenza na mposa na yango”

 Ebongiseli ya kosala ete Bandako ya Bokonzi ezala mpenza esika ya malamu mpe ya libateli, ebatelaki bandeko mpe elendisaki baoyo bakómaki koyangana lisusu na Ndako ya Bokonzi. Ndeko Dulcine, oyo afandaka na Peru, alobi ete azalaki “kobanga mwa moke” ntango ayokaki nsango ete tokozongela lisusu kosala makita na Ndako ya Bokonzi. Alobi boye: “Ntango Coronavirus ebandaki, mwa moke na nsima nazwaki yango. Nazalaki komiyoka mpenza malamu te mpo na kokende na Ndako ya Bokonzi, mpo nazalaki kokanisa ete nakozwa lisusu Coronavirus. Kasi ntango nakómaki na Ndako ya Bokonzi, namonaki ete bankulutu basalaki makambo mingi mpo tómiyoka ete tobatelami, na ndakisa batyaki bisika ya kosokola mabɔkɔ mpe kosalela perche mpo na mikro mpe bibongiseli ezwamaki mpo ete Ndako ya Bokonzi epɛtolama liboso mpe na nsima ya makita nyonso. Nyonso wana esalaki ete namona libateli oyo nazalaki na mposa na yango.” b

Kopɛtola Ndako ya Bokonzi

 Ndeko Sara, oyo afandaka na Zambie, akutanaki mpe na mokakatano ya ndenge mosusu. Alobi boye: “Mobali na ngai akufaki na Coronavirus eleki bansanza mingi. Nazalaki komitungisa ndenge oyo nakomiyoka ntango nakoyangana lisusu na makita na Ndako ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso na ye te.” Ndenge nini azali komiyoka lelo mpo na likambo etali koyangana na Ndako ya Bokonzi? Alobi boye: “Kozongela kosala makita na Ndako ya Bokonzi endimisaki ngai ete Yehova azali elongo na biso na mikolo oyo ya nsuka. Sikoyo, nazali komiyoka ete bandeko balingi ngai mingi mpe bazali kobɔndisa ngai koleka ndenge nazalaki komiyoka liboso.”

Esengo ya koyangana lisusu elongo

 Bandeko na biso bakristo na mokili mobimba bazali na botɔndi mingi ya kozongela kosala makita na Bandako ya Bokonzi. Matɔndi mpo na makabo na bino, oyo mingi na yango epesamaki na nzela ya donate.isa4310.com. Makabo yango esalisaki mpo na kokómisa bisika ya losambo ya pɛto malamu mpe kosala ete ezala esika ya libateli mpo na bato oyo bakoyangana elongo.

a Soki esengeli, baoyo bazali na mposa ya kokoba kosala makita na nzela ya video to na telefone bakoki kosala yango.

b Bato nyonso oyo bakosala makita na Ndako ya Bokonzi balendisami kolata maskɛ.