Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 38

Akokómisa yo makasi

Akokómisa yo makasi

(1 Petro 5:10)

  1. 1. Ntina Nzamb’alakisi yo solo na ye,

    Olongwe na molili, yang’oyo:

    Amonaki mposa ya motema na yo

    Ya koluka ye mp’ozala sembo.

    Band’olaká okosalela ye,

    Az’otika kosalisa yo te.

    (MONDIMO)

    Na makila ya Yesu,

    Nzamb’asombaki yo.

    Mpe akosunga yo,

    okozwa makasi.

    Akobatela yo,

    akokamba yo seko.

    Ɛɛ, akosunga yo,

    okozwa makasi.

  2. 2. Nzambe apesi Mwana na ye mpo na yo;

    Alingi ozwa mpenza lobiko.

    Lokol’akabá Mwana na ye mpo na yo,

    Makasi ye akosopela yo.

    Aza’ koyeba bolingo na yo;

    Asundolaka te bato na ye.

    (MONDIMO)

    Na makila ya Yesu,

    Nzamb’asombaki yo.

    Mpe akosunga yo,

    okozwa makasi.

    Akobatela yo,

    akokamba yo seko.

    Ɛɛ, akosunga yo,

    okozwa makasi.