Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 37

Nakosalela Yehova na molimo mobimba

Nakosalela Yehova na molimo mobimba

(Matai 22:37)

  1. 1. Yah, yo Mokonzi Monene,

    Yo nde Nzambe na nga’ nalingá.

    Nakobomela yo nzoto,

    Mikolo nyonso, Nkolo na nga’.

    Elobi yo, ekosala nga’;

    Nalingá mateya na yo!

    (MONDIMO)

    Obongi nasalela yo

    Molimo mobimba, Yehova.

  2. 2. Misala n’o’ekumisi yo:

    Sanza, minzoto, mabele, moi.

    Ngai mpe nakosalela

    Nzoto na nga’ seko mpo na yo.

    Mposa na nga’: nakangama yo

    Ntango nyonso mpo na seko.

    (MONDIMO)

    Obongi nasalela yo

    Molimo mobimba, Yehova.