Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOLONGA MITUNGISI

Mitungisi mpo na mbongo

Mitungisi mpo na mbongo

Paul, oyo azali tata ya bana mibale, alobi boye: “Ntango mbongo esilaki valɛrɛ na mboka na biso, biloko emataki ntalo mpe ezalaki komonana te. Tozalaki kotɛlɛma na molɔngɔ bangonga mingi mpo na kosomba bilei, kasi mbala mingi ezalaki kosila liboso ngala na biso ekoka. Bato bakɔndaki makasi mpo na nzala mpe basusu bazalaki kokwea na nzela. Ntalo ya biloko ya kolya emataki na bamilio mpe na nsima ekómaki bamiliare. Nsukansuka, mbongo ya mboka yango esilaki valɛrɛ. Nabungisaki mosolo oyo natyaki na banki, ya asiranse mpe ya pansiɔ.”

Paul

Paul ayebaki ete mpo libota na ye etikala na bomoi, asengelaki kosalela “bwanya.” (Masese 3:21) Alobi boye: “Nazalaki kosala mosala ya kura, kasi nakómaki kosala mosala nyonso oyo emonani, ata ya mbongo mingi te. Basusu bazalaki kofuta ngai biloko ya kolya to biloko ya ndako. Soki bafuti ngai sabuni (savon) minei, nazalaki kosalela mibale mpe kotɛka oyo etikali. Na nsima, nakómaki na bana nsoso 40. Ntango bakómaki minene, natɛkaki yango mpe nasombaki 300 mosusu. Na nsima, napesaki moto moko bansoso 50 mpe ye apesaki ngai kilo 50 ya fufu ya masango. Kaka na masango yango, naleisaki libota na ngai mpe mabota mosusu mingi na boumeli ya ntango molai.”

Paul ayebaki mpe ete likambo eleki ntina oyo moto akoki kosala, ezali ya kotyela Nzambe motema. Soki tosalaka oyo Nzambe asɛngaka, akosalisa biso. Mpo na oyo etali kozwa oyo tozali na yango mposa, Yesu alobi boye: “Bótika kozala motema likolólikoló; mpo . . . Tata na bino ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko wana.”​—Luka 12:29-31.

Likambo ya mawa, Satana monguna monene ya Nzambe, akosaka bato ebele na mokili mobimba mpo bátyaka makanisi na bango kaka na biloko ya mokili. Bato bamitungisaka koleka ndelo mpo na biloko oyo bazalaka mpenza na mposa na yango to oyo balɔtaka kozwa mpe babomaka nzoto mpo na kozwa biloko oyo bazalaka mpenza na mposa yango te. Mingi oyo bakɔtaka banyongo, bamonaka mpenza ete “modefi azali mosaleli ya moto oyo azali kodefisa.”​—Masese 22:7.

Bamosusu bazwaka bikateli ya mabe. Paul alobi boye: “Bato mingi ya kartye na ngai batikaki mabota mpe baninga na bango mpe bakendaki na mikili ya bapaya na elikya ya kokóma na ‘bomoi ya malamu.’ Basusu bakendaki kozanga kozwa mikanda mpe ezalaki mpasi bázwa misala. Bazalaki mbala mingi kobombana bapolisi mpe kolala na babalabala. Bapesaki Nzambe libaku te ya kosalisa bango. Kasi tozwaki ekateli na libota ya kolonga mikakatano ya mbongo na lisalisi ya Nzambe.”

KOSALELA TOLI YA YESU

Paul abakisi boye: “Yesu alobaki boye: ‘Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.’ Yango wana, libondeli na ngai ya mokolo na mokolo ezalaki ete Nzambe ‘apesa biso lelo bilei na biso mpo na mokolo’ mpo tókufa te. Mpe asalisaki biso kaka ndenge Yesu alakaki. Kasi ezalaki ntango nyonso te biloko oyo tolingaka mingi. Mokolo moko, natɛlɛmaki na molɔngɔ mpo na kosomba bilei kozanga koyeba biloko oyo bazalaki kotɛka. Ntango nakómaki pembeni, namonaki ete ezalaki nde yaourt. Nalingaka yango te. Kasi, lokola ezali biloko ya kolya, yango nde tolyaki na butu wana. Napesaka Nzambe matɔndi mpo na boumeli ya ntango wana nyonso, libota na ngai etikalá kolala nzala te.” *

Nzambe alaki boye: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”​—Baebre 13:5.

“Lelo oyo tokelelaka lisusu na mbongo te. Kasi makambo tokutanaki na yango eteyaki biso ete nkisi ya solosolo mpo na kolonga mitungisi ezali kotyela Nzambe motema. Yehova * akokoba kosalisa biso soki tozali kokoba kosala mokano na ye. Tomoni mpenza kokokisama ya maloba oyo ya Nzembo 34:8: ‘Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu; esengo na mobali makasi oyo azali kokima epai na ye.’ Yango wana tobangaka lisusu te kokutana na mikakatano ya mbongo.”

Nzambe asalisaka basaleli na ye ya sembo bázwa ‘bilei na bango mpo na mokolo oyo’

“Sikoyo toyebi polele ete biloko oyo moto azali na yango mposa mpo na kotikala na bomoi, ezali mosala to mbongo te kasi nde bilei. Tozelaka na mposa makasi mpenza ntango oyo elaka ya Nzambe oyo ekokokisama: ‘Mbuma ekozala beboo na mabele.’ Liboso ntango yango ekoka, ‘soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.’ Tozwaka makasi na maloba oyo ya Biblia: ‘Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo. Mpo alobaki ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” Mpo tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.”’” *

Esɛngaka kondima ya solosolo mpo na ‘kotambola elongo na Nzambe’ ndenge Paul ná libota na ye basalaka. (Ebandeli 6:9) Ezala tozali kokutana na mikakatano makasi ya mbongo sikoyo to tokokutana na yango na avenire, ndakisa ya kondima ya Paul mpe bwanya na ye eteyi biso mpenza.

Bongo soki mikakatano ya libota ezali kotungisa biso?

^ par. 10 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.