Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu Kristo azali mpenza nani?

Yesu Kristo azali mpenza nani?

“BONGO ntango akɔtaki na Yerusaleme, engumba mobimba eninganaki, bazalaki koloba ete: ‘Wana nani?’ Ebele ya bato yango bazalaki koloba ete: ‘Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazarete ya Galile!’”​—MATAI 21:10, 11.

MPO na nini koya ya Yesu Kristo * na Yerusaleme na mokolo wana ya prɛnta ya mobu 33 ya ntango na biso, eningisaki engumba ndenge wana? Bato mingi na engumba yango bayokaki makambo na ntina na Yesu mpe makambo ya kokamwa oyo asalaki. Bazalaki koyebisa bato mosusu makambo etali ye. (Yoane 12:17-19) Kasi, ebele wana ya bato bayebaki te ete moto wana oyo azalaki na kati na bango, akozala na bopusi na mokili mobimba mpe tii na eleko na biso!

Tótalela mwa makambo oyo emonisi ete Yesu atiká nsango na bomoi ya bato:

  • Manaka oyo esalelamaka na bisika mingi lelo na mokili elandaka mbula oyo bato bakanisaka ete Yesu abotamaki.

  • Bato soki miliare mibale​—elingi koloba (1/3) ya bato oyo bazali na mokili—​bamibengaka bakristo.

  • Lingomba ya Mizilma, oyo ezali na bandimi soki miliare koleka moko na mokili mobimba, eteyaka ete Yesu azali “profeta monene koleka Abrahama, Noa mpe Moize.”

  • Maloba mingi ya bwanya oyo Yesu alobaki, esalelamaka na ndenge mingi na maloba oyo bato basalelaka mokolo na mokolo. Na kati na yango, tokoki kotánga oyo:

    ‘Pesá litama mosusu.’​MATAI 5:39.

    ‘Kende kilomɛtrɛ mosusu.’​MATAI 5:41.

    ‘Moto moko akoki kosalela bankolo mibale te.’​MATAI 6:24.

    ‘Kobwakela bangulu mayaka na yo te.’​MATAI 7:6.

    ‘Makambo nyonso oyo olingaka bato básalela yo, yo mpe salelá bango kaka bongo.’​MATAI 7:12.

    ‘Yebá mosolo boni ekosɛnga.’​LUKA 14:28.

Na ntembe te, Yesu atiká mpenza nsango na bomoi ya bato. Kasi, bato bazalaka mpe na makanisi ndenge na ndenge mpo na ye. Nzokande, okoki komituna boye, ‘Yesu Kristo azali mpenza nani?’ Kaka Biblia nde eyebisi biso epai Yesu autaki, bomoi oyo azalaki na yango, mpe mpo na nini akufaki. Koyeba solo na makambo wana oyo etali ye, ekoki kozala na ntina na bomoi na yo, sikoyo mpe na mikolo ezali koya.

^ par. 3 “Yesu,” nkombo mpenza ya profeta wana ya Nazarete, elimboli “Yehova azali lobiko.” Liloba “Kristo” ezali titre oyo elimboli “Oyo atyami mafuta,” elingi koloba Yesu atyamaki mafuta, to Nzambe aponaki ye mpo na mokumba moko ya ntina mingi.