Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Norvège

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Norvège

ELEKI mwa bambula, Roald ná mwasi na ye Elsebeth, oyo na ntango wana bazalaki na mbula pene na 50, bazalaki na bomoi ya malamu na Bergen, engumba ya mibale oyo eleki monene na Norvège. Elongo na bana na bango mibale, ya mwasi Isabel mpe ya mobali Fabian, bazalaki mpenza komipesa na makambo ya lisangá. Roald azalaki nkulutu, Elsebeth azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe Isabel ná Fabian bazalaki basakoli ya molende.

Kasi, na sanza ya libwa 2009, libota yango ezwaki ekateli ya kosala likambo mosusu: kokende kosakola pɔsɔ mobimba na teritware moko ya mosika. Na yango, Roald ná Elsebeth, mpe mwana na bango Fabian oyo azalaki na mbula 18, bakendaki na Nordkyn, na etúká ya Finnmark, koleka Cercle arctique. Kuna, na mboka Kjøllefjord, basakolaki elongo na bandeko basi mpe mibali oyo bayaki mpe na teritware yango mpo na kosakola nsango malamu. Roald alobi boye: “Na ebandeli ya pɔsɔ yango, namonaki ete nasalaki malamu ndenge nazwaki bibongiseli mpo nalekisa pɔsɔ mobimba na mosala ya kosakola na teritware mosusu.” Kasi na nsima, kaka na pɔsɔ yango, likambo moko ekómaki kotungisa Roald. Likambo nini?

MOTUNA MOKO OYO TOKANAKI TE

Roald alobi boye: “Mario, oyo azalaki mobongisi-nzela na Finnmark, atunaki biso soki tokosepela kokende na engumba Lakselv mpo na kosalisa lisangá moko oyo ezalaki na basakoli 23.” Motuna wana ya mbalakaka ekamwisaki Roald. Alobi boye: “Ngai ná Elsebeth tozalaki na likanisi ya kokende kosakola esika mposa ezalaki makasi, kasi tolingaki kosala yango na nsima, soki bana balongwe na ndako.” Kasi, na boumeli ya mwa mikolo oyo bakendaki kosakola na teritware ya mosika, Roald amonaki ete bato bazali na mposa ya koyeba Yehova. Bazalaki na mposa ya lisalisi na ntango wana, kasi na nsima te. Alobi boye: “Motuna yango etungisaki lisosoli na ngai mpe nazalaki kokanisa yango butubutu, nazalaki kolala malamu te.” Na nsima, Mario amemaki Roald ná libota na ye na motuka tii na Lakselv, na ntaka ya kilomɛtrɛ 240 na sudi ya Kjøllefjord. Mario alingaki ete bango moko bámona lisangá ya moke oyo ezalaki kuna.

Na Lakselv, Andreas, moko ya bankulutu mibale ya lisangá yango, atambwisaki bango na mboka yango mpe alakisaki bango Ndako ya Bokonzi. Bandeko ya lisangá yango bayambaki bango na esengo mpe bayebisaki Roald ná Elsebeth ete bakosepela mingi soki libota na bango mobimba ekei kofanda kuna mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi. Na mwa kosɛka, Andreas alobi ete asilaki kozwa bibongiseli mpo ete Roald ná Fabian bákoka kobanda mosala kuna! Sikoyo, basengelaki kosala nini?

EKATELI NINI BAZWAKI?

Na ebandeli, Fabian, alobaki boye: “Nazali na mposa ya kokende kuna te.” Likanisi ya kotika baninga oyo akolaki na bango na lisangá oyo bazalaki mpe kokende kofanda na mwa engumba ya moke esepelisaki ye te. Longola yango, asilisaki naino te formasyo oyo azalaki kolanda mpo na koyeba mosala ya kobongisa kura. Nzokande, ntango batunaki Isabel (oyo na ntango wana azalaki na mbula 21) mpo na koyeba soki akondima kokende na teritware mosusu, alobaki boye: “Yango nde nazalaka na mposa ya kosala banda kala!” Kasi na nsima, Isabel alobaki ete: “Ntango nakanisaki lisusu mingi, nakómaki komituna boye: ‘Ezali mpenza likanisi ya malamu? Nakokoka kotika baninga na ngai? Esengeli natikala kaka na lisangá na biso epai makambo nyonso ezali malamu mpe esalamaka ndenge oyo nalingaka?’” Bongo Elsebeth akanisaki nini na likambo yango? Alobi boye: “Namonaki ete Yehova nde azali kotinda libota na biso, kasi nakanisaki mpe ndako na biso oyo toutaki kobongisa mpe biloko nyonso ya ndako oyo tozwaki na boumeli ya mbula 25.”

Elsebeth ná Isabel

Ntango pɔsɔ yango esilaki, Roald ná libota na ye bazongaki na Bergen, kasi bazalaki kaka kokanisa bandeko basi mpe mibali oyo batikaki na Lakselv, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 2 100. Elsebeth alobi boye: “Nabondelaki Yehova mingi, mpe tozalaki kosolola mbala na mbala ná baninga oyo tozwaki kuna, tozalaki kotindelana bafɔtɔ mpe kokomelana masolo ya makambo ya kolendisa oyo tokutanaki na yango.” Roald alobi boye: “Esɛngaki mwa ntango mpo nandima kokende na teritware yango. Longola yango, nasengelaki mpe kokanisa ndenge oyo tokobanda kozwa mbongo ya kobikela kuna. Nazalaki komituna soki tokosala ndenge nini mpo na kokokisa bamposa na biso na teritware yango. Nabondelaki Yehova mingi mpe nasololaki na libota na ngai mpe bandeko mosusu oyo bakomɛli na elimo.” Fabian alobi boye: “Mbala nyonso oyo nazalaki kokanisa likambo yango, nazalaki komona mpenza te ntina oyo nasengelaki koboya kokende kuna. Nabondelaki Yehova mbala na mbala, mpe mokemoke mposa ya kokende ebandaki kokóma makasi.” Bongo Isabel asalaki nini? Mpo na komibongisa liboso ya kokende na teritware yango, akómaki mobongisi-nzela na lisangá oyo bazalaki. Na boumeli ya sanza motoba oyo asalaki mosala ya mobongisi-nzela, azalaki mpe kolekisa ntango mingi na koyekola Biblia ye moko; nsima na yango, amonaki ete sikoyo akoki kokende.

MAKAMBO OYO BASALAKI MPO NA KOKOKISA MOKANO NA BANGO

Lokola libota yango ekómaki na mposa makasi ya kokende esika oyo basakoli bazali mingi te, basalaki makambo mosusu mpo na kokokisa mokano na bango. Roald azalaki kosala mosala moko oyo ezalaki kofuta ye mbongo mingi mpe azalaki mpenza kosepela na yango, kasi asɛngaki patrɔ na ye nzela ete atika mosala na boumeli ya mbula mobimba, mpo na kozongela yango na nsima. Kasi patrɔ na ye asɛngaki ye asalaka pɔsɔ mibale mpe apemaka pɔsɔ motoba. Roald alobi boye: “Bakómaki kofuta ngai mbongo moke mpenza, atako bongo tozangaki te biloko ya kobikela.”

Elsebeth alobi boye: “Mobali na ngai ayebisaki ngai tóluka ndako ya kofutela na Lakselv mpe tótya moto ya kofutela ndako na biso na Bergen. Yango ezwaki biso ntango mingi mpe esɛngaki milende mingi, kasi nsukansuka tolongaki.” Abakisi ete: “Nsima ya mwa ntango, bana na biso bazwaki misala oyo basalaka kaka ndambo ya mokolo, mpe mwa mbongo oyo bazwaka esalisaka na kosomba bilei to kofuta tike.”

Isabel alobi boye: “Lokola engumba oyo tokendaki kofanda ezali moke, mokakatano eleki monene oyo nazalaki na yango ezalaki ya kozwa mosala oyo ekokaki kosalisa ngai nakokisa bamposa na ngai mpe nakoba na mosala ya mobongisi-nzela. Na bantango mosusu, nazalaki komona lokola ete nakokoka te.” Atako bongo, mpo na kozwa mbongo ya kobikela, Isabel andimaki kosala misala ndenge na ndenge oyo ezalaki kozwa ye kaka ndambo ya mokolo; na mbula ya liboso asalaki misala libwa. Kasi makambo esukaki ndenge nini mpo na Fabian? Alobi boye: “Mpo nasilisa mpenza kelasi na ngai, esɛngaki ete nasala naino ná bato oyo bayebi malamu mosala ya kobongisa kura. Nasalaki yango na Lakselv. Na nsima, nazwaki na ekzamɛ mpe nazwaki mosala ya kobongisa kura, oyo nazalaki kosala ndambo ya mokolo.”

NDENGE OYO BANDEKO MOSUSU BASALAKI LISUSU MINGI NA MOSALA YA KOSAKOLA

Marelius ná Kesia bazali koteya mwasi moko na monɔkɔ ya Lapon, na Norvège

Marelius ná mwasi na ye Kesia bazalaki mpe na mposa ya kokende kosakola na teritware oyo basakoli bazalaki mingi te. Marelius, oyo azali sikoyo na mbula 29, alobi boye: “Na mayangani, badiskur mpe mituna-lisolo oyo ezalaki kolobela mosala ya mobongisi-nzela etindaki ngai nakanisa ndenge oyo nakokaki kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola.” Nzokande mpo na Kesia, oyo azali sikoyo na mbula 26, kokende kofanda mosika na bandeko na ye ya libota ezalaki mpenza mokakatano. Alobi boye: “Likanisi ya kozala mosika na bato oyo nalingaka ezalaki mpenza kobangisa ngai.” Longola yango, mpo na kofuta nyongo ya ndako, Marelius azalaki kosala mosala oyo ezalaki kozwa ye mokolo mobimba. Alobi boye: “Na lisalisi ya Yehova mpe nsima ya kosala mabondeli mingi mpo na kosɛnga ye asalisa biso tóbongola makambo mosusu na bomoi na biso, nsukansuka tokendaki kofanda na teritware yango.” Na ebandeli, mwasi yango ná mobali na ye balekisaki ntango mingi na koyekola Biblia. Na nsima, batɛkaki ndako na bango, batikaki misala na bango, mpe na sanza ya mwambe 2011, bakendaki kofanda na engumba Alta, na nɔrdi ya Norvège. Kuna, mpo na kozwa mbongo ya kobikela mpo bákoba na mosala ya mobongisi-nzela, Marelius asalaka mosala ya kobomba mbongo (comptable) mpe Kesia asalaka na magazini moko.

Knut ná mwasi na ye Lisbeth, oyo bazali sikoyo na mbula 30 na ndambo, basepelaki mingi na masolo ya Annuaire oyo elobelaki bandeko oyo bakendá kosakola na teritware oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Lisbeth alobi boye: “Masolo wana etindaki biso tókanisa kokende kosala na mboka mopaya, kasi nazalaki kokakatana mpo nazalaki kokanisa ete moto mpamba lokola ngai akoki kosala yango te.” Atako bongo, bazwaki bibongiseli mpo na kokokisa mokano na bango. Knut alobi boye: “Totɛkaki ndako na biso, mpe mpo tóbimisaka mbongo mingi te, tokendaki ná mama na ngai. Na nsima, mpo na koyeba mwa moke ndenge oyo kosakola na teritware ya mboka mopaya ezalaka, tokendaki kosala mbula moko na lisangá ya Lingelesi na Bergen, mpe kuna tofandaki ná mama ya Lisbeth.” Eumelaki te, Knut ná Lisbeth bamonaki ete sikoyo bakoki mpo na kokende na mboka ya mosika mpenza: na Ouganda. Mbula nyonso, bazongaka na Norvège mpo na kosala mosala na boumeli ya sanza mibale. Yango esalisaka bango bázwa mbongo ya kobikela mpo na basanza mosusu oyo etikali mpe bákoba na mosala ya ntango nyonso na Ouganda.

“BÓMEKA MPE BÓMONA ETE YEHOVA AZALI MALAMU”

“Libota na biso ekómi na boyokani makasi.”​—Roald

Makambo etambolaki ndenge nini mpo basakoli wana oyo bamipesaki na bolingo na bango moko? Roald alobi boye: “Na teritware oyo ya mosika, tolekisaka ntango mingi libota mobimba elongo, koleka ndenge tozalaki kosala yango na Bergen. Libota na biso ekómi na boyokani makasi. Komona ndenge oyo bana na biso bazali kokola na elimo ezali mpenza lipamboli.” Abakisi ete: “Lisusu, tokómá kotalela biloko ya mosuni na ndenge oyo ebongi. Topesaka yango lisusu valɛrɛ mingi te ndenge oyo tozalaki kosala yango liboso.”

Elsebeth amonaki ete asengeli koyekola monɔkɔ mosusu. Mpo na nini? Mboka Karasjok ezali na kati ya teritware ya lisangá ya Lakselv; mboka yango ezali ya Ba-Lapon​—bankóló-mboka oyo bafandaka na bitúká ya nɔrdi ya Norvège, Suède, Finlande, mpe Russie. Mpo akoka kopesa bato yango litatoli, Elsebeth ayekolaki monɔkɔ ya Lapon. Sikoyo, akoki kosolola na moto mwa lisolo mokuse na monɔkɔ yango. Azali kosepela na teritware na ye ya sika? Alobi na esengo ete: “Nazali koyekola Biblia na bato motoba. Nazali na esengo mingi ya kozala na teritware oyo.”

Fabian, oyo azali sikoyo mobongisi-nzela mpe mosaleli na misala, alobi ete ye ná Isabel basalisaki bilenge misato ya lisangá na bango ya sika oyo bazalaki na mposa ya bilendiseli mpo bámipesa mingi na makambo ya lisangá. Sikoyo, bilenge yango misato bakómi molende na mosala ya kosakola. Kutu, mibale kati na bango bazwaki batisimo mpe bazalaki babongisi-nzela basungi na sanza ya misato 2012. Moko ya bilenge oyo akómaki kolɛmba na elimo apesaki Fabian ná Isabel matɔndi na ndenge basalisaki ye “akóma lisusu makasi na elimo.” Fabian alobi ete: “Nasepelaki mingi ntango ndeko mwasi yango alobaki bongo. Kosalisa moto epesaka mpenza esengo!” Isabel alobi boye: “Na teritware oyo, ‘nameki mpe namoni mpenza ete Yehova azali malamu.’” (Nz. 34:8) Abakisi ete: “Oyo eleki nyonso, kosakola awa ezali mpenza esengo!”

Lelo oyo, Marelius ná Kesia bazali lisusu na bomoi ya mindondo te, kasi bazali na esengo. Lisangá ya Alta, epai bakendá kosakola, ezali sikoyo na basakoli 41. Marelius alobi boye: “Soki nazongisi makanisi nsima, nasepelaka mingi komona ndenge bomoi na biso ebongwaná. Topesaka Yehova matɔndi ndenge apesi biso libaku ya kozala babongisi-nzela na teritware oyo. Eloko mosusu te ekoki kopesa biso esengo boye.” Kesia abakisi boye: “Nayekolaki kotyela Yehova motema mobimba, mpe akokisaka mpenza bamposa na biso. Namonaka mpe ete kofanda mosika na bandeko na ngai ya libota esalisi ngai nazwa na motuya mingi koleka ntango oyo tolekisaka elongo na bango. Nayokaka mawa ata moke mpo na ekateli oyo tozwaki.”

Knut ná Lisbeth bazali koyekola na libota moko na Ouganda

Kasi makambo ezali koleka ndenge nini mpo na Knut mpe Lisbeth na Ouganda? Knut alobi boye: “Esɛngaki ntango mingi mpo tómesana na mboka yango mpe mimeseno na yango. Mbala na mbala, tozangaka mai, kura, mpe bilei mosusu esalaka biso mpasi na libumu, kasi tokoki koyekola Biblia na bato ebele ndenge tolingi!” Lisbeth alobi ete: “Mosika te na esika tofandi, ezali na bateritware oyo nsango malamu ekómá naino te. Kasi, ntango tokendaka kuna, tokutaka bato bazali kotánga Biblia, mpe basɛngaka biso tóteya bango. Koteya bato wana nsango ya Biblia ezali likambo moko ya esengo!”

Na ntembe te, Mokambi na biso Yesu Kristo kuna na likoló asepelaka mingi ntango amonaka ndenge mosala ya kosakola oyo abandisaki ezali kokóma tii na bamboka ya mosika mpenza awa na mabele! Ya solo, basaleli nyonso ya Nzambe bazalaka na esengo ntango bamipesaka na bolingo na bango moko mpo na kokokisa etinda ya Yesu ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’​—Mat. 28:19, 20.