Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI No 2 2018 | Bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ekoya?

BOMOI EKOZALA NDENGE NINI NA MIKOLO EKOYA?

Osilá komituna soki bomoi na yo ná oyo ya libota na yo ekozala ndenge nini na mikolo ekoya? Biblia elobi:

“Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ekosalisa yo oyeba malamumalamu mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele mpe makambo oyo osengeli kosala mpo ozwa matomba na mokano yango.

 

Bazali koyebisa makambo ekoya

Banda bankóto ya bambula, bato bapesaka biyano ndenge na ndenge na mituna oyo etali makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya; mosusu esalemi bongo, kasi mosusu esalemi bongo te.

Bisakweli oyo ekokisamaki

Makambo ya kokamwa oyo Biblia elobi, oyo ekosalema na mikolo ekoya, ezali mpenza kokokisama.

Monima oyo emonisi ete esakweli moko ya Biblia ekokisamaki

Monima moko ya kala oyo ezali na Roma emonisaka ete esakweli moko ya Biblia ekokisamaki.

Bilaka oyo ekokokisama

Bisakweli mingi ya Biblia esilá kokokisama, kasi bisakweli mosusu ekokokisama na mikolo ekoya.

Okoki kozala na bomoi ya seko awa na mabele

Biblia emonisi mokano ya Mozalisi mpo na bato.

Yo moko nde osengeli kopona!

Bato mosusu bakanisaka ete makambo nyonso oyo ekómelaka biso na bomoi eutaka te na makambo oyo toponaka kosala, kasi etángamá bongo. Kasi ezali mpenza solo?

“Bato ya komikitisa bakozwa mabele”

Biblia elaki ete makambo ya kozanga bosembo mpe mabe ekozala lisusu te.