Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Bamikrobɛ oyo esilisaka petrole makasi

Bamikrobɛ oyo esilisaka petrole makasi

NA 2010, litre soki milio 800 ya petrole oyo balongoli naino basalite na yango te esopanaki na Golf ya Mexique ntango bisaleli oyo babendaka na yango petrole na nse ya mbu ebɛtaki kano mpe ezindaki. Atako ebebisaki mai, nsima ya basanza mai yango ebongaki. Esalemaki ndenge nini?

Tókanisa naino: Bolukiluki ya bato ya siansi emonisi ete bamikrobe mosusu oyo ezalaka na mbu ekoki kopanza shɛni ya molai ya bamolekile ya carbone oyo ezalaka na petrole. Profesɛrɛ Terry Hazen, oyo ayekolaka bamikrobe, abengaki bamikrobe yango “bamisile oyo elukaka petrole.” Ndenge tolobeli yango na ebandeli, soki mai ya Golf ya Mexique ebongaki yango moko, ezali mpe mpo na bamikrobe yango.

Lapolo moko ya BBC oyo elobelaki lisolo yango elobi ete “na maloba mosusu, ezali likambo ya kokamwa te soki mbu ezalaka na bamikrobe oyo esilisaka petrole makasi.” Kutu, “mai oyo ebimaka na nse mpenza ya mbu ebimisaka petrole na bamai oyo ezali na mokili” banda bambula mingi.

Toboyi te, milende oyo bato basalaka mpo na kopɛtola mai oyo ebebi na petrole ebimisaka matomba. Kasi milende yango ebebisaka mpe makambo mingi na esika ya kobongisa yango. Bankisi oyo babwakaka na mai ebebisaka likoki oyo mbu ezalaka na yango ya kopanza petrole. Longola yango, bankisi yango ezali pwazɔ mpe ebebisaka esika tofandi na boumeli ya ntango molai. Kasi, likoki oyo mbu ezalaka na yango ya kosilisa makasi ya petrole ata mpe bamikrobe oyo emɛlaka petrole, esalisaka mbu emipɛtolaka yango moko kozanga makama oyo ebimaka ntango bato basalelaka bankisi ya kopɛtola mai. *

Okanisi nini? Likoki oyo bamikrobe oyo ezalaka na mbu ezalaka na yango ya kosilisa makasi ya petrole ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?

^ par. 6 Mwaye ya kolobela sikoyo makama oyo aksida ya Golf ya Mexique ekobimisela bikelamu oyo ezalaka na mbu nsima ya mikolo ezali te.