Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mayele oyo nzoi esalelaka mpo na kokita

Mayele oyo nzoi esalelaka mpo na kokita

NZOI ekoki kokita ata na esika nini kozanga mokakatano. Esalaka bongo ndenge nini?

Tókanisa naino: Esɛngaka ete nzoi ekitisa vitɛsi na yango tii na zero mpo ekita kozanga likama. Mpo esala bongo, esɛngaka makambo mibale—eyeba vitɛsi na yango mpe ntaka oyo ekaboli yango na esika oyo elingi kokita, makambo wana mibale nde esalisaka yango ekitisa vitɛsi. Kasi, banyama mingi ya mikemike ekoki te kosalela mayele yango mpo miso na yango ezalaka penepene mpe emonaka kaka eloko oyo ezali kotala, yango wana ezalaka na likoki te ya koyeba mbala moko ntaka oyo ekaboli yango na esika elingi kokita.

Miso ya nzoi ekeseni mpenza na oyo ya moto mpo moto asalelaka miso nyonso mibale na mbala moko mpo ayeba ntaka oyo ekaboli ye na eloko moko. Ntango nzoi ezali kopusana pene ya eloko moko, ekómaka komona eloko yango monene lisusu. Baankɛtɛ oyo iniversite moko (Australian National University) esalaki emonisi ete nzoi ekitisaka vitɛsi na yango malɛmbɛmalɛmbɛ mpo eloko oyo yango ezali kotala emonana monene to moke te. Ntango ekómi na esika oyo ezali kokita, vitɛsi na yango ekómaka tii na zero, mpo esalisa yango ekita kozanga likama.

Zulunalo moko (Proceedings of the National Academy of Sciences) elobi boye: “Mayele oyo ezangi mindɔndɔ oyo nzoi esalelaka mpo na kokita . . . ebongi mpo na kotambwisa na telekomande baaparɛyi oyo epumbwaka.”

Okanisi nini? Mayele oyo nzoi esalelaka mpo na kokita, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?