Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Komanyola

Komanyola

Komanyola elimboli nini?

“Nakomanyola likoló ya mosala na yo nyonso, mpe nakotya likebi na misala na yo.”​Nzembo 77:12.

OYO BATO BALOBAKA

Ezali na lolenge mingi ya komanyola, mingi na yango eutá na mangomba ya kala ya Azia. Mokomi moko ya makambo yango alobi boye: “Esengeli bɔɔngɔ etikala mpamba mpo moto amona makambo polele.” Maloba na ye eyokani na likanisi oyo ete kolongola makambo nyonso na motó ntango ozali kotya likebi na maloba to na bililingi moko boye esalaka ete moto azala na kimya na motema, makanisi mpe elimo na ye ezala polele.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia emonisi ete komanyola ezali na ntina mingi. (1 Timote 4:15) Kasi, lolenge ya komanyola oyo Biblia elendisaka ezali te ya kolongola makambo nyonso na bɔɔngɔ to kozongela maloba to fraze moko boye, oyo na bantango mosusu babengaka yango mantra. Nzokande komanyola oyo Biblia elobeli esɛngaka kokanisa na likambo moko na mobimba na yango, na ndakisa bizaleli ya Nzambe, mibeko na ye mpe biloko oyo asalá. Moto moko ya sembo abondelaki boye: “Namanyoli mosala na yo mobimba; nasepelaki komibanzabanza ntango nyonso mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Nzembo 143:5) Alobaki lisusu boye: “Ntango nakanisi yo na mbeto na ngai, namanyolaka likoló na yo na bileko ya kokɛngɛla na butu.”​—Nzembo 63:6.

Komanyola ekoki kosalisa yo na nini?

“Motema ya moyengebene emanyolaka mpo na koyanola.”​Masese 15:28.

OYO BIBLIA ELOBI

Komanyola ya malamu ebongisaka bomoto na biso, esalisaka biso tóyeba komipekisa, tózala na likoki ya kotɛmɛla komekama​—makambo wana nyonso ebakiselaka biso bososoli mpe mayele na maloba na biso mpe na makambo oyo tosalaka. (Masese 16:23) Na yango, komanyola ya ndenge wana esalaka mpe ete tózala na bomoi ya esengo. Nzembo 1:3 elobi boye mpo na moto oyo amanyolaka ntango nyonso makambo ya Nzambe: “Akokóma mpenza lokola nzete oyo elonami pene na mikɛli ya mai, oyo epesaka mbuma na yango na eleko na yango mpe oyo nkasa na yango ekaukaka te, mpe nyonso oyo azali kosala ekolonga.”

Komanyola esalisaka mpe biso tókangaka ntina ya makambo mpe tóbosanaka yango te. Na ndakisa, ntango tozali koyekola likambo moko oyo etali bozalisi to lisolo moko ya Biblia, toyebaka makambo mingi ya kitoko. Kasi ntango tomanyolaka na makambo yango, tomonaka ndenge oyo yango eyokani na makambo oyo toyekolaki kala. Boye, kaka ndenge mosali-mabaya asalelaka bisaleli ya malamu mpo ekóma ndako moko kitoko, komanyola mpe esalisaka biso “tósangisa” makambo mpo tókóma na likanisi moko.

Tosengeli kozala ekɛngɛ ntango tozali komanyola?

“Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango?”​Yirimia 17:9.

OYO BIBLIA ELOBI

“Na kati, na motema ya bato nde makanisi ya mabe ebimaka: misala ya pite, koyiba, koboma bato, misala ya ekobo, kolula biloko ya bato, misala ya motema mabe, kokosa, etamboli ya nsɔni, liso ya likunya, kofinga, lofundo, bozoba.” (Marko 7:21, 22) Kaka ndenge esɛngaka kosalela mɔtɔ na ekɛngɛ, esɛngaka mpe kozala ekɛngɛ ntango ozali komanyola! Noki te makanisi ya mabe ekoki kolamwisa bamposa ya mabe oyo ekozala mpasi mpo na kopekisa yango mpe kotinda moto na kosala mabe.​—Yakobo 1:14, 15.

Yango wana, Biblia elendisi biso tómanyolaka na ‘makambo nyonso ya solo, makambo nyonso ya lokumu, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, mpe makambo nyonso oyo ebongi kokumisama.’ (Bafilipi 4:8, 9) Soki tozwi makanisi ya malamu ndenge wana mpe ‘toloni’ yango na mitema na biso, tokokóma na bizaleli ya malamu, maloba malamu mpe boyokani malamu na basusu.​—Bakolose 4:6.