Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi ezangi mpasi​—Elikya ya solosolo

Bomoi ezangi mpasi​—Elikya ya solosolo

“[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​—Emoniseli 21:4.

TOKOKI mpenza kotyela elaka wana motema? Tókanisa likebisi ya libosoliboso oyo Nzambe apesaki moto. Nzambe alobaki na Adama ete soki atosi te, ‘akokufa solo.’ (Ebandeli 2:17) Akufaki ndenge kaka Nzambe alobaki. Liwa mpe mpasi oyo Adama ná Eva batikelá biso emonisi polele ete esengeli kondimaka makambo oyo Nzambe alobaka. Tokoki mpenza kotya ntembe ete elaka ya Nzambe ya kobongisa makambo awa na mabele ekokokisama?

Kanisá mpe na bizaleli ya Nzambe oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki. Mposa oyo tozalaka na yango ya kosilisa bampasi, emonisaka kaka bizaleli ya Nzambe oyo tozali na yango, lokola motema mawa, bolingo mpe bosembo. Kasi, makambo oyo ezali koleka na mokili mpe bizaleli oyo etondi lelo emonisi ete ntango mpo Nzambe asilisa bampasi ezali koya na lombangu mpenza.​—Talá etanda  “Makambo yango ekosalema ntango nini?”

Mpo na nini kaka Yehova Nzambe nde akoki kosilisa bampasi ya bato? Tótalela ndenge oyo akosukisa makambo oyo ebimisaka bampasi mpe bibongiseli oyo azwi mpo na kosala yango na nzela ya Mwana na ye Yesu.

Makambo oyo biso moko toponaka.

Tata na biso Adama aponaki nzela oyo ememelaki bana na ye mikakatano mingi. Ntoma Paulo akomaki ete: “Biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo.” (Baroma 8:22) Ndenge oyo Nzambe akosilisa mpasi yango ezali komonisa bosembo mpe motema mawa, mpe ezali mindɔndɔ te. Baroma 6:23 elobi ete: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.”

Yesu asalaki lisumu te na bomoi na ye mobimba awa na mabele. Liwa na ye efungolaki nzela mpo na kosikola bato ya botosi na lisumu mpe liwa. Lelo oyo, tozali na elikya ya bomoi ya seko na mokili oyo mposa oyo tozalaka na yango ya kopona makambo ya mabe ekosila. Bato oyo banyokolaka basusu na nko bakozala lisusu te, mpo “basali-mabe bakobomama.”​—Nzembo 37:9.

Makambo oyo ekanami te mpe lisumu oyo tobotamá na yango.

Yesu Kristo, Mokonzi oyo Nzambe atye, azali na nguya likoló ya biloko lokola mopɛpɛ mpe mai. Mokolo moko, Yesu ná bantoma na ye bazalaki na kati ya masuwa moko ntango “mopɛpɛ moko ya makasi mpe ya nsɔmɔ mpenza ebɛtaki, mpe mbonge ezalaki komibwaka na masuwa, bongo masuwa etikalaki moke etonda na mai.” Ntango babelelaki ye mpo asalisa bango, Yesu “atɛlɛmaki mpe apamelaki mopɛpɛ mpe alobaki na mbu ete: ‘Shiii! Fandá nyɛɛ!’ Mpe mopɛpɛ ekitaki, mpe kimya moko monene ekɔtaki.” Bantoma na ye bakamwaki mingi. Balobaki ete: “Ata mopɛpɛ ná mbu [ezali kotosa] ye.”​—Marko 4:37-41.

Na boyangeli ya Yesu, bato ya botosi ‘bakofanda na kimya mpe bakotungisama te mpo na nsɔmɔ ya mpasi.’ (Masese 1:33) Moko ya bampasi yango ezali makama lokola koningana ya mabele, mpela mpe mopɛpɛ makasi. Lisusu, kobebisa mabele, kotonga bandako na bisika oyo ebongi te, mpe kotonga na bisika oyo mipɛpɛ makasi ebɛtaka mpe mpela esalemaka, mpe makama mosusu oyo eyaka mpo na mabunga oyo bato basalaka ekosila. Moto moko te akokwela lisusu likama mpo azalaki na esika ya mabe ntango likama esalemaki.

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alobelaki likambo mosusu oyo akosala na boyangeli na ye oyo ekosilisa bampasi oyo ezali kouta na makambo ekanami te. Alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.” (Yoane 11:25) Ya solo, Yesu azali na nguya mpe mposa ya kosekwisa bamilio ya bato oyo bakufá na makama ndenge na ndenge. Elikya yango ezali ndɔtɔ mpamba? Mpo na kosalisa biso tótyela maloba na ye motema, Yesu asekwisaki bato ntango azalaki awa na mabele. Biblia elobeli bato misato oyo asekwisaki.​—Marko 5:38-43; Luka 7:11-15; Yoane 11:38-44.

“Mokonzi ya mokili oyo.”

Nzambe aponá Yesu Kristo mpo “abebisa nyɛɛ moto oyo akoki kopesa liwa, elingi koloba, Zabolo.” (Baebre 2:14) Yesu alobaki ete: “Sikoyo kosambisama ya mokili ezali kosalema; sikoyo mokonzi ya mokili oyo akobwakama libándá.” (Yoane 12:31) Yesu ‘akobukabuka misala ya Zabolo’ na ndenge akopekisa ye atambwisa makambo ya mokili oyo. (1 Yoane 3:8) Kanisá ndenge bato bakozala ntango elimo ya lokoso, ya kanyaka mpe ya moimi oyo Zabolo azali kolendisa ekozala lisusu te!