Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 8

Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe bampasi?

Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe bampasi?

1. Mabe ebandaki ndenge nini?

Nzambe atiki bato báyangela mwa ntango molai mpo na komonisa ete bakokoka te kosilisa mikakatano ya mokili

Mabe ebandaki awa na mabele ntango Satana alobaki lokuta ya liboso. Na ebandeli, Satana azalaki anzelu ya kokoka, kasi “akangamaki makasi te na solo.” (Yoane 8:44) Akolisaki mposa ya kozwa losambo oyo esengeli kopesama kaka na Nzambe. Satana akosaki Eva, mwasi ya liboso mpe andimisaki mwasi yango atosa ye na esika ya kotosa Nzambe. Adama alandaki mpe Eva na koboya kotosa Nzambe. Ekateli ya Adama ememaki mpasi mpe liwa.​—Tángá Ebandeli 3:1-6, 19.

Ntango Satana atindaki Eva aboya kotosa Nzambe, abandisaki botomboki mpo na kotɛmɛla boyangeli ya Nzambe. Bato mingi balandi Satana mpe baboyi ete Nzambe azala Moyangeli na bango. Na ndenge yango, Satana akómá “mokonzi ya mokili.”​—Tángá Yoane 14:30; 1 Yoane 5:19.

2. Bozalisi ya Nzambe ezalaki na mbeba?

Biloko nyonso oyo Nzambe akelá ezali ya kokoka. Bato mpe baanzelu oyo Nzambe akelaki, bazalaki na likoki ya kotosa Nzambe na makambo nyonso. (Kolimbola Mibeko 32:4, 5) Nzambe akelaki biso na bonsomi ya kopona kosala malamu to kosala mabe. Bonsomi yango epesaka biso libaku ya komonisa ete tolingaka Nzambe.​—Tángá Yakobo 1:13-15; 1 Yoane 5:3.

3. Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi tii sikoyo?

Mpo na mwa ntango, Yehova atiki nzela ete bato bátombokela boyangeli na ye. Mpo na nini? Mpo na komonisa ete milende nyonso oyo bato bakoki kosala mpo na komiyangela bango moko ekoki komemela bango bolamu te. (Mosakoli 7:29; 8:9) Nsima ya mbula 6 000 ya boyangeli ya bato, emonani polele ete balongi te. Biyangeli ya bato elongi te kosilisa bitumba, mobulu, kozanga bosembo, to maladi.​—Tángá Yirimia 10:23; Baroma 9:17.

Na kokesana na biyangeli ya bato, Bokonzi ya Nzambe ezali komemela bato oyo bandimi yango matomba. (Yisaya 48:17, 18) Mosika te, Yehova akosukisa biyangeli nyonso ya bato. Kaka bato oyo bazali kondima boyangeli ya Nzambe nde bakofanda na mabele.​—Yisaya 11:9; Tángá Danyele 2:44.

Talá video Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?

4. Motema molai ya Nzambe epesi biso libaku nini?

Satana alobaki ete moto moko te akosalela Yehova na bolingo ya solo. Okondima komonisa ete Satana alobaki lokuta? Ɛɛ, okoki komonisa yango. Motema molai ya Nzambe epesaka biso nyonso likoki ya komonisa soki tolingi boyangeli ya Nzambe to boyangeli ya bato. Lolenge oyo tozali kotambwisa bomoi na biso nde ekomonisa yango.​—Tángá Yobo 1:8-12; Masese 27:11.

5. Ndenge nini tokoki kopona Nzambe azala Moyangeli na biso?

Makambo oyo toponaka emonisaka soki tolingi Nzambe azala Moyangeli na biso to te

Tokoki kopona Nzambe azala Moyangeli na biso soki tozali koyekola makambo oyo etali losambo ya solo mpe kopesa mabɔkɔ na losambo yango, oyo eyokani na Liloba ya Nzambe, Biblia. (Yoane 4:23) Tokoki komonisa ete toboi boyangeli ya Satana soki toboi kokɔta na makambo ya politiki mpe na bitumba, ndenge Yesu asalaki.​—Tángá Yoane 17:14.

Satana asalelaka nguya na ye mpo na kotinda bato na bomoi ya mbindo mpe na misala ya mabe. Ntango tozali koboya misala yango, baninga na biso mpe bandeko na biso mosusu bakoki kosɛka to kotɛmɛla biso. (1 Petro 4:3, 4) Mpo na yango, tosengeli kopona. Tokozala esika moko na bato oyo balingaka Nzambe? Tokotosa mibeko na ye ya bwanya mpe ya bolingo? Soki tosali bongo, tokomonisa ete Satana akosaki ntango alobaki ete moto moko te akotosa Nzambe soki akutani na mikakatano.​—Tángá 1 Bakorinti 6:9, 10; 15:33.

Bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na bato endimisi biso ete akosilisa mabe mpe bampasi. Bato oyo bamonisaka ete bandimaka yango bakozwa bomoi ya seko awa na mabele.​—Tángá Yoane 3:16.