Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 103

“Bokonzi na yo eya”

“Bokonzi na yo eya”

Yehova alakaki ete: ‘Koganga, mpasi, maladi mpe liwa ekozala lisusu te. Nakopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango. Bato bakobosana makambo nyonso ya mabe.’

Yehova atyaki Adama ná Eva na elanga ya Edene mpo bázala na kimya mpe na esengo. Basengelaki kosambela Tata na bango ya likoló mpe kobota bana mpo na kotondisa mabele. Adama ná Eva batosaki Yehova te, kasi mokano na ye ebongwani te. Na buku oyo, tomoni ete likambo nyonso oyo Nzambe alaki ekokisamaka. Bokonzi na ye ekomema mapamboli minene na mabele, kaka ndenge alakaki Abrahama.

Mosika te, Satana, bademo na ye ná bato nyonso ya mabe bakobomama. Bato nyonso bakosambela Yehova. Tokobɛla lisusu te mpe tokokufa te. Kutu, mikolo nyonso tokobanda kolamuka na nzoto makasi mpe na esengo. Mabele ekokóma paradiso. Bato nyonso bakolya malamu mpe bakozala na bandako oyo ebongi. Bato bakozala na boboto, kasi te na nko to mobulu. Banyama ya zamba bakobanga biso te, biso mpe tokobanga bango te.

Ekozala esengo mingi ntango Yehova akobanda kosekwisa bato. Tokoyamba bato ya kala, lokola Abele, Noa, Abrahama, Sara, Moize, Ruta, Estere mpe Davidi. Tokosala na bango elongo mpo na kokómisa mabele paradiso. Tokozala ntango nyonso na makambo mingi ya kosala.

Yehova alingi ozala kuna. Okoyekola koyeba ye na ndenge oyo okanisaki te. Tókoba kopusana penepene na Yehova mokolo na mokolo, lelo oyo mpe libela na libela!

“Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso.”​—Emoniseli 4:11