Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini nzoto na ngai ekómi boye?

Mpo na nini nzoto na ngai ekómi boye?

Mokapo 6

Mpo na nini nzoto na ngai ekómi boye?

“Nakolaki maimai. Nazalaki koyoka nzoto mpasi. Nazalaki kosepela ndenge nazalaki kokola, kasi nazalaki koyoka mpasi na makolo. Ezalaki kosepelisa ngai te!”​—Paul.

“Oyebi ete nzoto na yo ezali kobongwana, mpe okanisi ete moto moko te ayebi. Kasi, na nsima okoyoka moto moko, na makanisi ya mabe te, alobi na yo ete ‘sikoyo okoki kobota e’​—mpe oyoki mposa olimwa!”​—Chanelle.

YO NÁ libota na yo bosilá kokende kofanda na mboka mosusu? Komesana ezalaki mpasi, boye te? Ya solo, otikaki biloko nyonso oyo omesanaki na yango​—ndako na bino, eteyelo na bino, mpe baninga na yo. Ekoki kozala ete ezwaki yo mwa ntango mpo omesana na mboka wana ya sika.

Ntango moto abandi kokóma elenge, ezalaka ntango oyo nzoto na ye ebandaka kokɔmɛla​—bambongwana ya minene esalemaka na bomoi na ye. Ezali lokola ozali kokende kofanda na “mboka” moko ya sika mpenza. Ezali esengo? Ɛɛ, esengo mpenza! Kasi, kokóma mokóló ekoki kopesa yo esengo mpe mbala mosusu mitungisi, mpe ekoki kozala mpasi mpo omesana. Nini esalemaka na ntango yango ya esengo mpe ya mpasi?

Epai ya bana basi

Bolenge ezali eleko oyo bambongwana minene esalemaka. Bambongwana mosusu ekomonana polele. Na ndakisa, ba-hormone ekokolisa nsuki na nzoto na yo ya mwasi. Okomona mpe mabɛlɛ na yo, loketo na yo, bibɛlo, mpe nsima ebandi kokola. Mokemoke, nzoto na yo ya mwana moke ezali kokóma ya bamama. Ezali likambo ya komitungisa te​—ezalaka kaka bongo. Emonisi nde polele ete nzoto na yo ezali kobongwana mpo okóma mpenza mama!

Mbala mingi, soki eleko ya bolenge ebandi, okoki kobanda komona sanza. Soki omilɛngɛli malamu te, likambo yango ekoki kobangisa yo mingi. Samantha alobi boye: “Nazalaki mpenza kidiba ntango nabandaki komona sanza. Namimonaki salite. Nazalaki kominika ntango nazalaki kosukola mpe nazalaki koloba na nse ya motema ete ‘nazali mpenza na bosɔtɔ.’ Koyeba ete basanza nyonso nakobanda komona sanza, ezalaki kobangisa ngai!”

Kasi, kobosana te ete komona sanza ezali komonisa ete makoki na yo ya kobota ezali kokola. Ata soki ekoleka bambula liboso okoka kobota, kasi sikoyo obandi kokóma mwasi mpenza. Atako bongo, komona sanza mbala ya liboso ekoki kotungisa yo. Kelli alobi boye: “Eloko ya mabe oyo ezalaki kotungisa ngai mingi ezalaki ndenge makambo mingi ezalaki kobongwana na nzoto na ngai. Ezalaki mpenza mpasi koyeba ntina oyo nazalaki esengoesengo mokolo mobimba, kasi na butu ya mokolo yango kaka nabandaki kolela mingi.”

Soki yo mpe ozali koyoka ndenge wana sikoyo, kitisá motema. Nsima ya mikolo, makambo ekobonga. Annette, oyo azali na mbula 20 alobi boye: “Nazali koyeba lisusu ntango nayaki kondima ete yango nde ekokómisa ngai mwasi mpe ete ezali kosalema mpo Yehova apesá ngai likabo ya kobota. Esɛngaka mwa ntango mpo na kondima yango, mpe ezalaka mpenza mpasi mpo na bana basi mosusu; kasi, nsukansuka okondima yango.”

Obandi komona na nzoto na yo bambongwana mosusu oyo touti kolobela? Na mikɔlɔtɔ oyo elandi, komá mituna nyonso oyo ozali na yango mpo na bambongwana oyo ozali komona.

․․․․․

Epai ya bana mibali

Soki ozali mwana mobali, bolenge ekomema bambongwana minene na nzoto na yo. Na ndakisa, babutɔ mpe matɔnɔ ya moindo ekoki ntango mosusu kobima na elongi. * Matthieu, elenge moko ya mbula 18 alobi boye: “Epesaka nkanda mpenza komona ebele ya babutɔ wana ezali kobima yo. Ezali mpenza etumba​—esengeli koboma yango. Oyebi te soki ekosila to ekotika yo bilembo na loposo to soki bato bakozwa yo na valɛrɛ te mpo ozali na babutɔ.”

Mbala mosusu okomona ete obandi kokóma monene, makasi mingi mpe ete mapeka na yo ebandi kofungwama. Kaka na ntango ya bolenge, nsuki ekoki kobima na makolo, na ntolo, na nse ya mapeka mpe mandɛfu ekoki kobima. Kasi, ezali te nsuki oyo ozali na yango nde emonisi ete ozali mobali; yango elandaka mingimingi ndenge baboti bazali.

Lokola binama nyonso ya nzoto ekolaka ndenge moko te na mbala moko, ekoki kosalema ete biloko ekima na mabɔkɔ na yo. Okoki mbala mosusu koyoka lokola ozali na mikuwa te. Elenge mobali moko na nkombo Dally alobaki ete ezalaki lokola bɔɔngɔ na ye ezalaki koloba likambo mosusu mpe mabɔkɔ na ye ezalaki kosala likambo mosusu.

Ntango okokóma na mbula soki 15 mongongo na yo ekobanda kokóma monene, kasi esalemaka malɛmbɛmalɛmbɛ. Nsima ya mwa ntango, okoki kobanda koloba na mongongo ya monene lokola mikóló, kasi na mbala moko mongongo na yo ekoki kokóma moke mpe koyokisa yo nsɔni. Kasi, komitungisa te. Nsukansuka mongongo na yo ekobonga. Na ntango wana, soki ozwi yango na ndenge ya lisɛki, nsɔni ekozala mingi te.

Wana makoki na yo ya kobota ezali kokɔmɛla, binama na yo ya kobotela ekokóma minene mpe nsuki ekobima pembenipembeni na yango. Ekobanda mpe kobimisa mai ya mibali. Mai yango ezalaka na bamilio ya biloko mikemike (spermatozoïde), oyo ebimaka na ntango ya kosangisa nzoto. Mai ya mobali ekoki kosangana na likei ya mwasi (ovule) mpe kobimisa mwana.

Mai ya mibali esalemaka na nzoto. Mosusu elimwaka na kati ya nzoto, kasi mosusu ekoki kobima na butu ntango olali. Soki mai ya mibali ezali kobima bongo, ezali mabe te. Ata Biblia mpe elobeli yango. (Balevi 15:16, 17) Elakisi ete binama na yo ya kobotela ezali kosala malamu mpe ete olingi kokóma mobali mpenza.

Obandi komona na nzoto na yo bambongwana mosusu oyo touti kolobela? Na mikɔlɔtɔ oyo elandi komá mituna oyo ozali komituna mpo na bambongwana oyo ozali komona.

․․․․․

Oyo okoki kosala ntango bambongwana ezali kosalema

Wana binama na bango ya kobotela ezali kokɔmɛla, bana mibali ná bana basi bakómaka kotyelana likebi mingi. Matthieu alobi boye: “Ntango nabandaki kokóma elenge, nakomaki komona ete bana basi mingi bazali kitoko. Ezalaki mpenza mawa mpo namonaki ete nakoki kosala eloko moko te liboso nakóma mokóló.” Mokapo 29 ya buku oyo ekolobela likambo yango na mozindo. Kasi, mpo na sikoyo, ezali na ntina mingi oyeba kopekisa bamposa na yo ya kosangisa nzoto. (Bakolose 3:5) Atako yango ezali mpasi, okoki koboya kolanda yango!

Ezali na makambo mosusu oyo osengeli kobundana na yango ntango ozali elenge. Na ndakisa, okoki komimona lokola ozali na ntina te. Bilenge mingi bamonaka ete bazali kaka bango moko, na ntango mosusu mpe banyokwamaka na makanisi. Na ntango wana, ezali malamu kosolola na moboti to na mokóló mosusu oyo otyelaka motema. Komá nkombo ya mokóló oyo okoki koyebisa ye ndenge ozali koyoka.

․․․․․

Kokola oyo eleki ntina

Elongi, molai mpe monene ekoki komonisa ete moto akoli, kasi kokola oyo eleki ntina ezali kokola na makanisi, mpe na koleka mpenza koyeba kosalela mateya ya Nzambe. Ntoma Paulo alobaki boye: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, kokanisa lokola mwana moke, kotalela makambo lokola mwana moke; kasi sikoyo lokola nakómi mobali, nalongoli bizaleli ya mwana moke.” (1 Bakorinti 13:11) Liteya yango oyo: komonana lokola mokóló te nde ezali nsuka ya makambo. Osengeli koyekola kosala makambo, koloba, mpe kokanisa lokola mokóló. Komitungisa mingi te mpo na makambo oyo ezali kokómela nzoto na yo kino obosana kobongisa bomoto na yo ya kati!

Kobosana mpe te ete Nzambe “amonaka ndenge motema ezali.” (1 Samwele 16:7) Biblia elobi ete Mokonzi Saulo azalaki molai mpe kitoko, azalaki mokonzi mpe mobali oyo azalaki te kokokisa mikumba na ye. (1 Samwele 9:2) Nzokande Zakai, atako azalaki “mokuse,” kasi, azalaki mpenza na makasi ya kotika bizaleli na ye mpo na kokóma moyekoli ya Yesu. (Luka 19:2-10) Emonani polele ete bomoto na biso ya kati nde ezali na ntina mingi.

Likambo ya solo ezali ete tozali na likoki te ya kokolisa nzoto na biso mbangumbangu to ya kosala ete ekola nokinoki te. Na yango, na esika ya kosilika to kobanga ntango bambongwana wana ezali kosalema, osengeli nde kondima yango na motema ya kokita mpe na esengo. Bolenge ezali maladi te, ozali mpe te moto ya liboso ya kokóma elenge. Tyá motema ete okolonga. Ntango mopɛpɛ wana ya bolenge ekoleka, okokóma mokóló ya solosolo!

NA MOKAPO OYO ELANDI

Tokolobela nini osengeli kosala soki osepeli te na ndenge elongi na yo ezali komonana na talatala. Ndenge nini okoki kotalela nzoto na yo kozanga kolekisa ndelo?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 15 Bana basi mpe babimaka babutɔ. Bankisi to savon oyo ebongi mpo na loposo ekoki kosalisa.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Nakokumisa yo mpo nasalami na ndenge moko ya kokamwa, na ndenge moko ya nsɔmɔ.”​—Nzembo 139:14.

TOLI

Lokola nzoto na yo ezali kofungwama, kebá na bilamba oyo ekoki kolamwisa bato mposa. Latáká na ndenge oyo ‘ekolekisa ndelo te mpe zaláká na makanisi malamu.’​—1 Timote 2:9.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Bolenge ekoki kobanda na mbula ya mwambe, na mbula ya 14 to koleka. Mbula oyo yango ebandaka ezalaka ndenge moko te mpo na bana nyonso.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Lokola nazokoma mokóló, nazali na mposa ya kokolisa mingimingi ezaleli oyo ․․․․․

Mpo na kobatela boyokani na ngai na Yehova, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini bambongwana ya nzoto mpe ya makanisi oyo eyaka na bolenge ezalaka mpasi mingi mpo na komesana na yango?

● Likambo nini omoni ete ezali mpasi mingi na eleko yango?

● Mpo na nini bolingo na yo mpo na Nzambe ekoki kosala lokola ekita na eleko ya bolenge, kasi ndenge nini okoki kopekisa yango esalema?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 61]

“Bolenge ezali na makambo mingi oyo ebangisaka, mpe oyebi te soki bambongwana nini nzoto na yo ekosala na nsima. Kasi, lokola ozali kokola, osengeli kondima bambongwana oyo ezali kosalema epai na yo ata mpe kosepela na yango.’’​—Annette

[Etanda na lokasa 63, 64]

Ndenge nini nakoki kosolola na papa to mama likambo etali kosangisa nzoto?

“Soki nazali na motuna oyo etali kosangisa nzoto, nakotuna baboti na ngai te.”​—Beth.

“Nakozala na makasi te ya kolobela yango.”​—Dennis.

Soki ozali lokola Beth to Dennis, ozali mpenza na mpasi. Olingi koyeba makambo etali kosangisa nzoto, ntango mosusu ozali kolinga te kotuna baboti na yo, bato oyo bazali na biyano ya malamu! Ozali komitungisa mpo na makambo mingi:

Bakokanisela ngai nini?

“Naboyi bákanisela ngai mabe mpo nazali kotuna mituna.”​—Jessica.

“Balingi otikala kaka mwana mpe moto oyo ayebi likambo te, kasi mokolo oyo okobanda kosolola makambo etali kosangisa nzoto, bakoki komona lokola oyebi makambo.”​—Beth.

Bakosala nini?

“Nabangi baboti na ngai bákanisela ngai makambo liboso kutu nasilisa koloba mpe bábanda kosalela ngai badiskur milaimilai.”​—Gloria.

“Baboti na ngai bamonisaka mbala moko soki basepeli to te na likambo moko, na yango nalingi te komona bango na bilongi ya bato oyo basepeli te. Na ntembe te, papa akobanda kobongisa diskur oyo akosalela ngai liboso nasilisa koloba.”​—Pamela.

Bakomona te ete natuni mituna yango na makanisi mabe?

“Makanisi na bango ekoki kokende mosika mpe bakoki kobanda kotuna na ndakisa, ‘Olingaki kosangisa nzoto na moto?’ to ‘Bakamarade na yo bazali kotya yo mbamba?’ Kasi ntango mosusu olingi nde kaka koyeba.”​—Lisa.

“Elongi ya papa ebebaka soki kaka natángi nkombo ya mwana mobali. Mbala moko abandaka kopesa ngai toli na makambo etali kosangisa nzoto. Bongo na nse ya motema nalobaka boye: ‘Papa, nalobi kaka ke azali kitoko. Nalobi ata likambo moko te oyo etali libala to kosangisa nzoto!’”​—Vanessa.

Koyeba ete ntango mosusu baboti na yo bakoki mpe koyoka nsɔni mpo na kosolola na yo makambo etali kosangisa nzoto, ndenge yo moko mpe okoki koyoka nsɔni kosolola na bango, ekoki kolendisa yo! Mbala mosusu yango wana nde ankɛtɛ moko emonisaki ete na baboti mingi (65 %) oyo balobaki ete basololá na bana na bango makambo etali kosangisa nzoto, kaka ndambo ya bana (41 %) nde bazalaki koyeba lisusu ete basololá likambo yango ná baboti na bango.

Yebá ete baboti na yo bakoki kokakatana kosolola makambo etali kosangisa nzoto. Mbala mingi ezalaka mpo baboti na bango basololaki na bango likambo yango te! Ezala ndenge nini, mityá na esika na bango. Mbala mosusu, soki okangi motema mpe obimisi likambo yango, ekosalisa yo ná baboti na yo. Ndenge nini?

Ndenge ya kobanda lisolo yango

Baboti na yo bazali na bwanya mingi mpe batoli mingi na makambo etali kosangisa nzoto. Osengeli nde koyeba ndenge ya kobanda lisolo. Meká boye:

1 Yebisá baboti na yo ete atako ezali mpasi; kasi ozali na mposa ya kosolola na bango. “Nazali kokakatana mwa moke kosolola na yo likambo oyo mpo nazali kobanga okanisa ete . . .”

2 Yebisá moboti na yo ntina oyo oyei epai na ye. “Nazali na motuna, mpe nalingi ete yo nde opesa ngai eyano kasi moto mosusu te.”

3 Na nsima lobá likambo na yo. “Motuna na ngai ezali . . .”

4 Na nsuka ya lisolo, osengeli komindimisa ete soki likambo mosusu ebimi, bokosolola lisusu. “Soki nazali na mituna mosusu, nakoki kozonga mpo na kosolola na yo?”

Ata soki oyebi ete akondima, kasi soki oyoki moboti na yo alobi yango, ekotika nzela polele mpe ekobangisa yo te mpo na kosolola na bango mbala ya nsima soki esengeli. Meká kosalela makanisi yango! Mbala mosusu okondima makanisi ya Trina. Sikoyo azali na mbula 24; alobi boye: “Ntango nazalaki kosolola na mama, nazalaki kokanisa ete esengelaki kutu tósolola ata te. Kasi sikoyo nazali na esengo ndenge mama azalaki koloba polele mpe azalaki kobombela ngai likambo te. Ebatelaki ngai mpenza!”

[Elilingi na lokasa 59]

Kolongwa na eleko ya bolenge ezali lokola kokende kofanda esika mosusu​—kasi ekosɛnga omesana na makambo mosusu