Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandakisa ya kolanda​—Moshulame

Bandakisa ya kolanda​—Moshulame

Bandakisa ya kolanda​—Moshulame

Elenge mwasi Moshulame ayebaki malamu ete asengelaki kotika te ete lolango etambwisa ye motó. Alobaki na baninga na ye boye: “Nalapisi bino ndai, ete bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolinga.” Moshulame ayebaki ete lolango ekoki kokanga moto miso. Na ndakisa, ayebaki ete bato mosusu bakoki kotya ye mbamba mpo andima ata moto oyo abongi na ye te. Ata mpe motema na ye moko ekokaki kokosa ye. Yango wana, Moshulame atikalaki makasi lokola “efelo.”​Loyembo ya Salomo 8:4, 10.

Moshulame azalaki moto oyo akɔmɛli, yango wana azalaki kotalela bolingo ya mwasi ná mobali na ndenge ebongi; yo mpe ozali lokola ye? Okokoka kosalela bɔɔngɔ na yo na esika olanda kaka motema na yo? (Masese 2:10, 11) Bato mosusu bakoki kotya yo mbamba mpo olingana na moto na ntango oyo okoki naino te. Mbala mosusu, yo moko okoki kokóma na makanisi ya ndenge wana. Na ndakisa, ntango omoni mwana mwasi ná mwana mobali na balabala basimbani na lobɔkɔ, oyokaka mposa ya kosala lokola bango? Okondima moto oyo azali te Motatoli ya Yehova lokola yo? Elenge Moshulame azalaki kotalela makambo etali bolingo ya mwasi ná mobali lokola moto oyo akɔmɛli. Yo mpe okoki kosala lokola ye!