Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ntango nini Nzambe abandaki kokela molɔ́ngɔ́?

Ntango nini Nzambe abandaki kokela molɔ́ngɔ́?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobi te soki Nzambe abandaki kokela molɔ́ngɔ́ ntango nini to soki eumelaki bambula boni. Elobi kaka boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” (Ebandeli 1:1) Biblia elobi te na bosikisiki soki “ebandeli” yango ebandaki ntango nini. Kasi, ndenge makambo elandanaki na molɔngɔ ndenge emonisami na mokanda ya Ebandeli, emonisi ete ebandeli yango ezalaki liboso ya bileko motoba, to “mikolo,” ya bozalisi.

 Mikolo motoba ya bozalisi ezalaki mpenza mikolo ya ngonga 24?

 Te. Na Biblia, liloba “mokolo” ekoki kopesa likanisi ya ntango molai ya bileko ndenge na ndenge, na kotalela ndenge makambo ezali kosalema. Na ndakisa, moko ya eteni ya lisolo yango emonisi ete eleko mobimba ya bozalisi ezali lokola mokolo moko.​—Ebandeli 2:4.

 Makambo nini esalemaki na boumeli ya mikolo motoba ya bozalisi?

 Nzambe abongisaki mabele oyo ezalaki “na lolenge ata moko te mpe ezalaki mpamba,” mpo ekóma esika moko kitoko ya kofanda. (Ebandeli 1:2) Na nsima akelaki bomoi na mabele. Biblia emonisi makambo 6 oyo esalemaki na boumeli ya mikolo to bileko, ya bozalisi:

  •  Mokolo 1: Nzambe asalaki ete pole ekatisa etando ya mabele, yango esalaki ete moi ná butu ezala.​—Ebandeli 1:3-5.

  •  Mokolo 2: Nzambe asalaki etando, to asalaki ete mai ekabwana; mosusu emata na likoló mpe mosusu etikala na etando ya mabele.​—Ebandeli 1:6-8.

  •  Mokolo 3: Nzambe asalaki ete mabele ya kokauka ebima. Lisusu, akelaki matiti mpe milona.​—Ebandeli 1:9-13.

  •  Mokolo 4: Nzambe asalaki moi, sanza, mpe minzoto emonana na likoló mpo engɛngisa etando ya mabele.​—Ebandeli 1:14-19.

  •  Mokolo 5: Nzambe akelaki banyama ya mai mpe bandɛkɛ.​—Ebandeli 1:20-23.

  •  Mokolo 6: Nzambe akelaki banyama ya zamba mpe ya mboka mpe bato.​—Ebandeli 1:24-31.

 Nsima ya mokolo ya motoba, Nzambe apemaki na mosala na ye ya bozalisi, to atikaki kokela.​—Ebandeli 2:1, 2.

 Lisolo ya mokanda ya Ebandeli eyokani mpenza na oyo Siansi elobaka?

 Lisolo ya Biblia oyo elobeli bozalisi ya mokili elobeli te makambo mikemike oyo Siansi elobeli. Kasi, elobeli bozalisi na ndenge ete ata batángi ya ntango ya kala bakokaki koyeba na pɛtɛɛ nyonso ndenge makambo elekaki. Lisolo ya bozalisi etɛmɛlaka te makambo oyo bato ya siansi balobi. Robert Jastrow, moto moko ya fiziki oyo ayekolaka baplanɛti akomi boye: “Makambo nyonso mikemike ekeseni, kasi masolo ya astronomi mpe ya Biblia oyo elobeli ndenge bomoi ebandaki ezali na boyokani na likambo moko ya ntina mpenza; elingi koloba, kolandana ya makambo oyo ezali komema na moto ebandaki na mbalakaka to pwasa, na ntango moko ya sikisiki.”

 Ntango nini Nzambe akelaki moi, sanza mpe minzoto?

 Moi, sanza, mpe minzoto ezalaki kati ya biloko oyo Nzambe así akelaki na “likoló” na “ebandeli.” (Ebandeli 1:1) Kasi, emonani lokola pole na yango ezalaki kokóma te na etando ya mabele mpo etando ya mabele ezalaki molili mingi. (Ebandeli 1:2) Na yango, atako pole ekómaki komonana na mokolo ya liboso, kasi likoki ya koyeba soki pole yango ezalaki kouta wapi ezalaki te. Na mokolo ya minei, molili ezalaki lisusu te na etando ya mabele. Biblia elobi ete moi, sanza, mpe minzoto ebandaki “kongɛngisa mabele,” emonani lokola balobeli yango na ndenge moto moko azalaki na mabele azali kotala yango.​—Ebandeli 1:17.

 Na kotalela Biblia, mabele esali mbula boni?

 Biblia elobeli te soki mabele ezali na mbula boni. Ebandeli 1:1 elobi kaka ete molɔ́ngɔ́ oyo ezali komonana, ezala mpe mabele, ezali na ebandeli. Likanisi yango etɛmɛli te makambo oyo bato ya Siansi balobaka mpo na mbula oyo mabele esali.