Lakisá makambo oyo ezali na kati

“Bafungola ya bokonzi” ezali nini?

“Bafungola ya bokonzi” ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Na bantango mosusu “Bafungola ya bokonzi” oyo babengaka yango mpe “fungola ya bokonji,” emonisaka lotomo ya kofungolela bato nzela ya “kokɔta na bokonzi ya Nzambe.” (Matai 16:19; Haut fleuve; Misala 14:22) a Yesu apesaki Petro “bafungola ya bokonzi ya likoló.” Yango emonisi ete Petro azwaki mokumba ya komonisa bato ya sembo makambo oyo basengeli kosala mpo na kozwa elimo santu ya Nzambe mpe libaku ya kokɔta na Bokonzi ya likoló.

Bafungola yango esalelamaki mpo na banani?

 Petro asalelaki lotomo oyo Nzambe apesaki ye mpo na kofungolela bituluku misato nzela ya kokɔta na bokonzi:

  1.   Bayuda mpe Bayuda oyo bakómaki bakristo. Mwa moke nsima ya liwa ya Yesu, Petro alendisaki ebele ya Bayuda oyo bakómaki bandimi bándima Yesu lokola moto oyo Nzambe aponi mpo ayangela na bokonzi. Petro amonisaki bango oyo basengeli kosala mpo bábika. Na ndenge yango afungolelaki bango nzela ya kokɔta na bokonzi, mpe bato mingi “bayambaki liloba na ye.”​—Misala 2:38-41.

  2.   Basamaria. Na nsima akendaki epai ya Basamaria. b Asalelaki lisusu fungola ya bokonzi ntango ye ná ntoma Yoane, “babondelaki mpo na bango mpo bázwa elimo santu.” (Misala 8:14-17) Yango efungolelaki Basamaria nzela ya kokɔta na bokonzi ya Nzambe.

  3.   Bato ya bikólo mosusu. Mbula misato na ndambo nsima ya liwa ya Yesu, Nzambe amonisaki Petro ete bato ya bikólo mosusu mpe bakoki kozwa libaku ya kokɔta na bokonzi. Yango wana, Petro asalelaki fungola mosusu mpo na koteya bato ya bikólo mosusu, mpe yango efungolelaki bango nzela ya kozwa elimo santu, kokóma bakristo mpe basangani ya bokonzi.​—Misala 10:30-35, 44, 45.

“Kokɔta na bokonzi” elimboli nini?

 Baoyo ‘bakokɔta na bokonzi’ bakoyangela elongo na Yesu na likoló. Biblia elobaki ete ‘bakofanda na bakiti ya bokonzi’ mpe “bakoyangela mabele.”​—Luka 22:29, 30; Emoniseli 5:9, 10.

Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango na ntina etali bafungola ya bokonzi

 Libunga: Petro nde azwaka ekateli soki nani akokɔta na bokonzi ya likoló.

 Solo: Biblia elobi Yesu Kristo nde “akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi,” kasi Petro te. (2 Timote 4:1, 8; Yoane 5:22) Kutu, Petro ye moko alobaki ete Yesu “azali Moto oyo atyami na Nzambe mpo na kozala mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi.”​—Misala 10:34, 42.

 Libunga: Nzambe azelaki Petro azwa ekateli mpo na ntango ya akosalela bafungola yango.

 Solo: Ntango Yesu alobelaki bafungola ya bokonzi, ayebisaki Petro boye: “Nyonso oyo okokanga awa na mabele ekozala oyo esilaki kokangama na likoló, mpe nyonso oyo okofungola awa na mabele ekozala oyo esilaki kofungwama na likoló.” (Matai 16:19) Atako bato mosusu bakanisaka ete maloba yango elakisi ete Nzambe azalaki kolanda bikateli oyo Petro azalaki kozwa, bavɛrbɛ ya Grɛki oyo basaleli wana emonisi ete bikateli ya Petro nde ekolanda oyo ya Nzambe. c

 Biblia emonisi na bisika mosusu ete Petro azalaki kolanda litambwisi ya Nzambe mpo na kosalela bafungola ya bokonzi. Na ndakisa, alandaki litambwisi ya Nzambe mpo na kosalela fungola ya misato.​—Misala 10:19, 20.

a Ntango mosusu, Biblia esalelaka liloba “fungola” lokola elembo ya bokonzi to mokumba.​—Yisaya 22:20-22; Emoniseli 3:7, 8.

b Losambo ya Basamaria ekesanaki na losambo ya Bayuda kasi ezalaki na mwa mateya mpe mimeseno mosusu oyo eutaki na Mibeko ya Moize.

c Talá nɔti ya Matai 16:19 na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika mpo na koyekola (na Anglais).