Lakisá makambo oyo ezali na kati

Moto azali koyema

Mwa bavideo oyo ya mokuse elobeli makambo ya ntina mingi kasi na ndenge ya lisano!

 

Kotika te likaya ebebisa bomoi na yo

Atako bato bamɛlaka likaya to bamɛlaka likaya oyo babendaka vapeur na yango, basusu batikaka komɛla mpe basusu bazangaka elikya mpo na kotika komɛla yango. Mpo na nini? Komɛla likaya ezali mpenza mabe?

Masano ya video: Ozali mpenza kolonga?

Masano ya video ekoki kosepelisa, kasi ekoki mpe kozala motambo. Ndenge nini okoki kokima motambo na yango mpe kolonga mpenza?

Ndenge ya kotika kozala mawamawa mpe kokóma na esengo

Okoki kosala nini soki azali mawamawa?

Oyo osengeli koyeba mpo na masano

Masano ekoki kosalisa yo oyeba makambo ya ntina, na ndakisa koyokana na basusu mpe kosolola. Kasi esengeli kozala likambo eleki ntina na bomoi na yo?

Kanisá liboso ya komɛla

Bato mingi oyo balobaka to basalaka makambo na nse ya kwiti bayokaka mawa na nsima. Ndenge nini okoki komibatela na makama ya komɛla masanga koleka ndelo?

Ndenge nini nakoki kosolola na baboti na ngai?

Ndenge okoki kosolola na baboti na yo ntango ozali na mposa ya kosolola te?

Otikaka aparɛyi etambwisa yo?

Tozali na mokili oyo teknoloji ekoli mingi kasi yango te nde esengeli kotambwisa biso. Ndenge nini okoyeba soki okomi moombo ya aparɛyi na yo? Soki ezali bongo, ndenge nini okosala mpo na kobongisa likambo yango?

Nasala nini mpo baboti bábakisela ngai mwa liberté?

Ozali komona ete baboti basengeli komona ete osí okoli kasi bango bazali komona bongo te. Okosala nini mpo bákóma kotyela yo motema?

Nasala nini mpo natika matɔngi?

Mbala nyonso oyo lisolo ekei na ngámbo ya mabe, salá mwa eloko!

Ezali bolingo to bilingelá?

Talá ndimbola ya bilingelá mpe bolingo ya solo.

Boyá makanisi mabe ya baninga!

Makambo minei ekoki kosalisa yo ozala na makasi ya kozwa bikateli yo moko.

Kebá na basite Internet ya kosolola na baninga

Ntango ozali kosolola na baninga na yo na Internet, omibatela mpe bósepela elongo.

Moninga ya solosolo azali nani?

Ezali mpasi te kozwa baninga na Internet, kasi ndenge nini okoki kozwa moninga ya solosolo?

Longá matumoli kozanga ete obunda

Luká koyeba mpo na nini batumolaka basusu mpe oyo okoki kosala mpo na kolonga yango.