Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bafɔtɔ ya botongi ya Betele ya Angleterre 7 (Sanza ya 09/2018 tii 02/2019)

Bafɔtɔ ya botongi ya Betele ya Angleterre 7 (Sanza ya 09/2018 tii 02/2019)

Bafɔtɔ oyo ezali komonisa ndenge oyo misala ya botongi ya Betele ya sika ya Batatoli ya Yehova ya Angleterre etambolaki, kobanda na sanza ya 09/2018 kino 02/2019.

  1. Batima ya stidio mpo na bavideo

  2. Batima ya bisika ya kosala misala

  3. Batima ya babiro

  4. Résidence A

  5. Résidence B

  6. Résidence C

  7. Résidence D

  8. Résidence E

  9. Residence F

 

25/09/2018​—Résidence A

Bituluku ya basali-nzela bazali kosalela bamasini mpo na kobongisaka nzela oyo mai ekobanda kolekela. Batima ya babiro ezali komonana na nsima.

26/09/2018​—Batima ya bisika ya mosala

Bakompanyi ya libanda bazali kotya bapano mpo na kobongisa bifelo ya libanda. Langi mpe lolenge ya kotyela bapano eponamaki na ndenge oyo ekosala ete eyokana na esika ezali (paysage).

27/09/2018​—Batima ya bisika ya mosala

Nsima ya kotya dale ya nse, bakompanyi ya libanda ezali kosalela bamasini mpo na kobongisa pavema.

4/10/2018​—Batima ya babiro

Fɔtɔ ekangami uta likoló na ngambo ya Nord-Est. Na ebandeli, bazali kobongisa mabele na esika oyo ekozala parkingi ya mituka. Na ngambo ya mwasi, charpente ya bibende oyo esangisi babatima mibale ya babiro esili. Babatima ya stidio mpe ya misala ezali komonana na nsima.

10/10/2018​—Lopango ya Betele

Pene ya Résidence A, mwasi moko oyo atalelaka makambo ya jardin azali kotala mpe kozwa bandelo nsima ya kobongisa bisika oyo banzete mpe bafololo ekolonama. Lokola bibongiseli nyonso esí ezwamaki liboso kutu mosala ya botongi ebanda, banzete mpe bafololo yango ekokola malamu ntango mosala ya botongi ekosila.

31/10/2018​—Résidence F

Bazali kopakola langi ebengami résine na nse na esika parking ya mituka ekozala. Volontɛrɛ oyo na lobɔkɔ ya mwasi alati basapato oyo ekoki kotika te bilembo na esika bazali kopakola langi. Kopakola langi ebengami résine esalaka ete mabele epasuka te mpe ekanga mafuta te, yango ebongi mpenza mpo na esika ya kobomba mituka.

6/11/2018​—Batima ya bisika ya misala

Bazali kozwa bamezire ya batiyo mpe kokata bisika oyo bakotɛlɛmisa bapano mpo na kotya mwa molunge na bisika ya mosala.

6/11/2018​—Batima ya babiro

Bavolontɛrɛ bazali kopakola langi ya liboso na kati ya batima ya babiro. Likoló ya esika nyonso oyo biro ekozala bakotya aparɛyi moko mpo na kopesa molunge, malili na mopepe. Aparɛyi yango elingami na kopale mpo ebatelama malamu.

8/11/2018​—Batima ya babiro

Bavolontɛrɛ bazali kotya charpente ya bibende likoló ya esika biro ya koyamba bato ekozala.

7/12/2018​—Batima ya babiro

Basali ya bakompanyi ya libanda bazali kosalela masini moko mpo na kotya bapano ya batalatala na libanda ya esika ya kolya mpe ya auditorium.

10/12/2018​—Batima ya babiro

Bandeko oyo basalaka mosala ya infomatique bazali kotya baprizɛ na bansinga oyo bakosalela. Pene na bakilomɛtrɛ 50 ya bansinga yango ezali na likoló ya plafɔn ya baetaze nyonso minei ya batima ya babiro. Batye yango likoló mpo ebimisa mikakatano mingi te soki balingi kobongola bisika oyo babiro ezali.

26/12/2018​—Résidence A

Basangani ya etuluku oyo etalelaka makama ya mbalakaka bazali komekameka lolenge nini bakoki komatisa to kobenda, na nzela ya mokaba oyo ebengami ceinture de sécurité, moto oyo akwei uta na esika ya mosala.

8/01/2019​—Batima ya babiro

Ndeko moko ya etuluku ya basali oyo babongisaka nzela azali kotya bilembo liboso ya kotya pavema na nzela. Masini ebengami pelleteuse ezali kotya mabulu na esika bakolona banzete.

9/01/2019​—Bisika ya mosala

Batye bapano likoló ya babatima ya bisika ya mosala, ya stidio mpe ya babiro mpo ebimisaka kura na nzela ya moi.

17/01/2019​—Batima ya babiro

Moko ya basali azali kotya bakaro oyo esalemi na mabanga ya calcaire na esika ya kokɔtela na etaje ya misato. Eteni oyo ya orange ezali kokabola yango na dale mpo epasuka te ata soki dale eningani.

21/01/2019​—Esika ya kolya

Bavolontɛrɛ oyo bazali na nzala balyaka na esika ya kolya oyo ebongisamaki mpo na bango. Na esika yango, bakabolaka bilei mbala misato mpo na koleisa bato koleka 1 000 mokolo na mokolo.

30/01/2019​—Batima ya babiro

Mituka ezali komema biloko ya mosala na nsima ya lopango. Na lobɔkɔ ya mobali, babakisi biloko na makonzi ya bafenetre ya esika ya kolya mpe ya auditorium mpo na kopekisa ete moi ebɛta na kati.

30/01/2019​—Batima ya babiro

Bazali kotya moquette na nse na lisungi ya bavolontɛrɛ oyo bayaki kopesa mabɔkɔ. Basengaki na masanga nyonso ya Angleterre mpe ya Irlande batinda bavolontɛrɛ oyo bakopesa mabɔkɔ na mosala kaka mokolo moko. Na nsuka ya sanza ya 02, bandeko koleka 5 500 bamipesaki na mosala yango.

12/02/2019​—Batima ya bisika ya mosala

Basali ya bakompanyi ya libanda bazali kotonga efelo na katikati ya batima mpo na kokabola yango na biteni mingi. Ndelo oyo ezali na langi ya orange ezali kolakisa elevateur elingi emata.

20/02/2019​—Batima ya bisika ya mosala

Basali bazali kotya bopeto wana basilisi kotya plafɔ ya esika oyo biro ya koyamba bato ekozala.