Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bashario mpo na kokutana na baturiste na Allemagne

Bashario mpo na kokutana na baturiste na Allemagne

Na bingumba minene na mokili mobimba, bato ya makolo bamesani komona bashario ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo Batatoli ya Yehova babimisaka. Na ndakisa na Allemagne, Batatoli ya Yehova batyaki bashario yango na Berlin, Cologne, Hambourg, Munich mpe bingumba mosusu oyo bato bazalaka mingi.

Kotya bashario yango na bingumba mike epai Ba-Allemand bakendaka konje ekosimba? Bato bakomona ndenge nini mpo na bashario yango na bingumba oyo baturiste bakendaka, na bisanga ya nɔrdi ya mbu mpe ya Baltique? Na 2016, Biro ya Batatoli ya Yehova ya Europe centrale ebongisaki kampanye moko sipesiale mpo na kopesa biyano na mituna yango. Kobanda sanza ya 5 tii sanza 10, Batatoli ya Yehova soki 800 oyo bamesani kopesa litatoli ya bisika ya bato ebele na bashario bamipesaki mpo na kotya bashario yango soki 60 na nɔrdi ya Allemagne. Bamosusu na bango bautaki na Vienne, na Autriche.

“Tokómi mpe bato ya engumba oyo”

Bato bayambaki Batatoli ya Yehova na boboto mpenza. Volontɛrɛ moko alobi boye: “Bato bamonisaki ete basepeli. Bazalaki boboto, na mposa ya koyeba mpe koloba.” Heidi, oyo asalaki mobembo na engumba Plön, alobi boye: “Nsima ya mwa mikolo, bato bakómaki kotalela biso lokola bato ya engumba oyo. Bamosusu oyo bayebaki biso bazalaki kopepa biso lobɔkɔ ntango bamoni biso.” Mobali moko ya baba asalaki bango jɛstɛ oyo: “Bozali bisika nyonso!” Ye ná moninga na ye bautaki fɛti moko ya bababa na sudi ya Allemagne, epai bakutanaki mpe na Batatoli ya Yehova.

Bato mosusu oyo bafandi na bingumba yango bapesaki mabɔkɔ. Na esanga ya Wangerooge, mokonzi moko ya polisi apusanaki na shario mpe ayebisaki Batatoli ya Yehova ndenge bakoki kokutana na bato mingi lisusu. Na Waren, kapitɛni ya masuwa moko ya baturiste oyo azalaki kolakisa bato oyo bazalaki na kati ya masuwa bisika ya kitoko alakisaki bango mpe shario oyo ezalaki na libongo mpe alobaki: “Awa, bokoki koyeba makambo mingi etali Nzambe.” Bato mingi oyo bazalaki na masuwa yango bapusanaki na shario mpe bazwaki ntango ya kotanga pankarte oyo batyaki na bashario yango.

Ezala baturiste to bato ya bisika yango basepelaki na mwa babuku oyo misato:

  • Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso? Turiste moko alobaki boye: “Nabanda komituna motuna oyo banda kala. Sikoyo, na boumeli ya konje, nakozwa ntango ya kotánga yango.”

  • Nsango malamu oyo euti na Nzambe! Mobange mobali moko ayebisaki Batatoli ya Yehova ete mangomba elɛmbisá ye. Basalisaki ye ayeba ete moto moko te akoki kosilisa mikakatano na biso; kaka Nzambe nde akoki kosala yango. Mobali yango asepelaki na mwa buku yango mpe alobaki akotánga yango.

  • Mateya ya Biblia mpo na bana. Papa moko atikaki mwana na ye ya moke ya mwasi azwa mwa buku yango, oyo ebongisami mpo na bana mike. Azwaki mpe Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe alobaki: “Oyo ekosunga libota na ngai.”

Baleki-nzela bazwaki mikanda koleka 3600. Bato mosusu bayebisaki Batatoli ya Yehova báya kotala bango na ndako mpo bákoba masolo.

Batatoli ya Yehova oyo bapesaki mabɔkɔ na kampanye yango basepelaki mpenza. Jörg ná mwasi na ye Marina, batyaki shario pene ya mbu Baltique. Balobi boye: “Ezalaki mpenza kado. Tozwaki libaku ya kotala biloko Nzambe akelá mpe koyebisa bato makambo etali ye.” Lukas, oyo azali na mbula 17, alobi boye: “Esepelisaki ngai mpenza! Nazwaki mwa mopɛpɛ kasi nazwaki mpe libaku ya koyebisa basusu likambo moko ya ntina.”