Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpela ememeli bato nsango malamu

Mpela ememeli bato nsango malamu

 Na mobu 2017, Batatoli ya Yehova 12 bazalaki kotambola na masuwa banda na Mosquito, na bokula ya etká ya Nicaragua. Bazalaki kobenga masuwa na bango Sturi Yamni. Stephen, moko ya bandeko oyo azalaki na masuwa yango alobi boye: “Mokano na biso ezalaki ya kolendisa mwa etuluku moko ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kofanda na mwa mboka moko ya mosika mpe kosalisa bango básakola nsango malamu na teritware na bango ya monene.”

 Batatoli yango balongwaki na Laguna de Perlas mpe basalaki mobembo ya ntaka ya kilomɛtrɛ 200 mpo na kokende na Río Grande de Matagalpa. Bayebaki ete nkombo ya masuwa na bango, oyo elimboli “nsango malamu” na monɔkɔ ya Miskito, ekozala na ndimbola moko monene mpo na bato oyo bafandaka pembenipembeni ya ebale. Basalaki ngonga soki 12 ya mobembo, kozanga kotánga bangonga oyo bapemaki na butu, mpo na kokóma na La Cruz de Río Grande, mboka oyo bazalaki kokende. Ntango bakómaki, Batatoli motoba ya mboka yango bayambaki bango na esengo.

 Na butu yango, likambo moko esalemaki. Mopɛpɛ moko ya makasi ebɛtaki Río Grande de Matagalpa mpe mbula makasi enɔkaki. Kaka nsima ya mwa bangonga, ebale etondisaki bangámbo na yango, mpe mai ezalaki se komata na boumeli ya mikolo mibale. Ndako ya Bokonzi mpe bandako mingi na La Cruz etondaki na mai. Bandeko oyo bayaki kuna basalisaki bato ya mboka yango mpo bábima na bandako na bango. Mingi na bango balekisaki butu mibale oyo elandaki na ndako ya etaje ya Motatoli ya Yehova moko.

Ndako ya Bokonzi na La Cruz oyo etondaki na mai

 Na butu ya misato, mokonzi ya engumba ya La Cruz akendaki kotala Batatoli ya Yehova oyo bayaki na mboka yango mpo na kosɛnga bango lisalisi. Lokola masuwa Sturi Yamni ezalaki masuwa moko kaka ya makasi oyo ekokaki kotambola na ebale yango oyo etondaki, yango wana mokonzi yango asɛngaki bandeko na biso soki bakoki komema ekipi ya bato oyo bazali kokende kobikisa bato oyo bafandaka pembenipembeni ya ebale, oyo bakutanaki na makama. Batatoli ya Yehova bandimaki kopesa bango mabɔkɔ.

 Na ntɔngɔ oyo elandaki, Batatoli ya Yehova misato bakendaki elongo na bato ya ekipi yango. Ndeko Stephen alobi boye: “Na ntango yango ebale ezalaki na yikiyiki. Ememaki banzete ya minene oyo epikolamaki. Na bisika mosusu, mai ezalaki kobalukabaluka, mpe ezalaki kotíyola noki mpenza.” Mikatatano ezalaki mingi, atako bongo masuwa ekómaki na bamboka misato.

 Batatoli yango misato basaleki libaku yango mpo na kopesa bato ya mboka eloko oyo bazalaki na yango mpenza mposa. Batatoli yango bakabolelaki bango mpe nimero moko ya Lamuká! ya 2017 oyo ezalaki na motó ya likambo: “Ntango likama ebimi​—Makambo ya kosala mpo na kobatela bomoi.”

 Bato oyo bafandaka zingazinga ya bamboka yango bazalaki na botɔndi mingi mpenza mpo na lisalisi oyo bazwaki, ezala ya mosuni to ya elimo. Basusu kati na bango balobi boye: “Batatoli ya Yehova basepelaka kosalisa basusu na ntango ya mpasi.” Bato mosusu mpe balobaki: “Bazali na bolingo ya solosolo epai ya bazalani na bango.” Nsima ya komona milende oyo Batatoli ya Yehova basalaki mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo mpe bato mosusu, bato mingi ya mboka yango bandimaki koyoka nsango ya ebondisaka oyo ezali na Biblia.

Marco, akiti na masuwa Sturi Yamni mpo na kosakwela bato ya mboka yango nsango malamu

Masuwa Sturi Yamni etɛlɛmi na mboka moko ya zamba oyo ezindi na mai