Lakisá makambo oyo ezali na kati

Soki Batatoli ya Yehova bayekoli na ngai Biblia, ekosɛnga kaka nakóma Motatoli ya Yehova?

Soki Batatoli ya Yehova bayekoli na ngai Biblia, ekosɛnga kaka nakóma Motatoli ya Yehova?

 Te, ozali na bonsomi ya kopona. Bamilio ya bato basepelaka tóyekola na bango Biblia kozanga ete bákóma bandimi ya lingomba na biso. a Ntina ya boyekoli yango ezali ya komonisa moto oyo Biblia eteyaka. Ekateli oyo moto akozwa nsima ya kozwa boyebi yango etali kaka ye moko. Toyebi ete kondima ezali likambo ya moto na moto.​—Yosua 24:15.

Nakoki kosalela Biblia na ngai moko na boyekoli yango?

 Ɛɛ. Atako tosepelaka kosalela Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika, mpe tokopesa yo yango ofele soki osepeli kozwa, tokosepela osalela Biblia na yo moko. Okoki koyekola nsango ya Biblia oyo epesaka elikya mpe lobiko na mabongoli nyonso ya Biblia.

Mpo na nini boyekolaka na bato oyo bazali bandimi ya lingomba na bino te?

  •   Tosalaka yango libosoliboso mpo tolingaka Yehova Nzambe, oyo alingi bakristo báteya bato mosusu makambo oyo bango bayekoli. (Matai 22:37, 38; 28:19, 20) Tomonaka ete “kosala elongo na Nzambe” mpo na kosalisa bato báyekola oyo Liloba na ye eteyaka, ezali libaku ya malamu koleka.​—1 Bakorinti 3:6-9.

  •   Tolingaka mpe bazalani na biso. (Matai 22:39) Tosepelaka koyebisa basusu makambo kitoko oyo toyekolaka.​—Misala 20:35

a Na kotalela programɛ na biso ya koyekola na bato Biblia, na boumeli ya 2023 toyekolaki na bato 7 281 212 Biblia sanza na sanza, mingi na yango esalemaki na bato ebele na mbala moko. Kasi kaka bato 269 517 nde bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova na mbula yango.