Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mwasi moko ná mobali na ye oyo bazali Batatoli bazali kolanda makita ya lisangá na nzela ya video. Ezali mbala ya liboso ete molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo esalema boye

03/04/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Ekaniseli ya liwa ya Kristo oyo ekeseni na mosusu nyonso

Masangá mingi bakosalela video na ntango oyo ya maladi mabe

Ekaniseli ya liwa ya Kristo oyo ekeseni na mosusu nyonso

Na mbula oyo, na mokolo ya mibale, mwa 07/04/2020, bamilio ya Batatoli ya Yehova ná bato oyo basepelaka na mateya ya Biblia bakokutana mpo na kosala Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Nzokande, na mbula oyo, mpo na maladi ya coronavirus (COVID-19), Ekaniseli ekokesana na mosusu nyonso. Bato ebele na mokili mobimba bakosala yango na nzela ya video.

Mpo na maladi ya coronavirus, bakonzi ya Leta na bamboka mingi baboyi bato ebele báyangana esika moko. Yango wana, na mokili mobimba, masangá mingi bazali kolanda makita pɔsɔ na pɔsɔ na nzela ya video. Masangá yango ekosala mpe Ekaniseli na bango kaka na nzela ya video. Video moko mpo na molulu yango oyo ebongisami liboso ekotyama na jw.org mpo na bato nyonso.

Na mbula oyo eleki, bato koleka milio 20 bayanganaki na Ekaniseli. Tozali na elikya ete bato ebele bakolanda Ekaniseli na nzela ya video, na telefone, to bakotala video oyo batye na jw.org.

Na mikili mingi, maladi mabe yango ezali kopalangana mpe ezali koboma bato mingi. Mpo na kobatela bandeko na biso, tosengeli mpenza kolanda malako tii maladi mabe yango ekosila. Yango wana tondimi na motema moko ete Yehova akosalisa biso mpe tozali na ekateli ya kotosa etinda ya Yesu oyo elobi: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”​—Luka 22:19.