Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BÓSƐNZƐLAKA!

Koboma bato na masasi na mokili mobimba—Biblia elobi nini?

Koboma bato na masasi na mokili mobimba—Biblia elobi nini?

 Na sanza ya 07/2022, babomi bato mingi na masasi na ndenge ya nsɔmɔ mpenza na mokili mobimba:

  •   “Liwa ya moto ya politiki oyo ayebanaki mingi na Japon [ancien Premier ministre Shinzo Abe] esalaki bato ya ekólo yango mpasi mpenza mpe eningisaki mokili mobimba, mpamba te na ekólo Japon mobulu ya ndenge wana esalemaka mpenza te mpe bazalaka na mibeko ya makasi mpenza na oyo etali kosomba mondoki.”​—10/07/2022, Zulunalo The Japan Times.

  •   “Bato ya ekólo Danemark bayokaki mpasi mpenza ntango mobali moko abomaki bato misato na butiki moko monene na engumba Copenhague.”​—10/07/2022, Agence Reuters.

  •   “Na Afrique du Sud, mobali moko abomaki bato 15 na esika bamɛlaka masanga na Soweto.”​—10/07/2022, Zulunalo The Guardian.

  •   “Bato koleka 220 bakufaki na masasi na États-Unis na mokolo ya 04/07, na ntango ya fɛti ya ekólo.”​—5/07/2022, CBS News.

 Mobulu ya boye ekosila mokolo mosusu? Biblia elobi nini?

Mobulu ekosila

 Biblia elobi ete tozali na “mikolo ya nsuka,” ntango oyo bato bakosala makambo na nko, na mobulu, mpe bakosala makambo lokola banyama. (2 Timote 3:1, 3) Makambo ya mabe ya ndenge wana ezali kosala ete bato bákóma kobanga. (Luka 21:11) Kasi, Biblia elaki ete mobulu ekosila mpe bato “bakofanda mpenza na esika ya kimya mpe na bisika ya kofanda oyo moto akobanga ata moke te mpe na bisika ya kopema oyo ezangi mitungisi.” (Yisaya 32:18) Ndenge nini mobulu ekosila?

 Nzambe akoboma bato mabe mpe akobebisa bibundeli nyonso.

  •   “Kasi bato mabe bakolongolama na mabele.”​—Masese 2:22.

  •   “[Nzambe] azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga; Azali kotumba makalo na mɔtɔ.”​—Nzembo 46:9.

 Nzambe akoteya bato báfanda na kimya ná basusu, na ndenge yango mobulu ekozala lisusu te.

  •   “Bakosala eloko moko te ya mabe mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba mosantu na ngai mobimba; mpo mabele ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.”​—Yisaya 11:9.

  •   Ezala sikoyo, Nzambe azali koteya bato na mokili mobimba ete bátika mobulu mpe bákómisa mandoki na bango “bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango ete ekóma makwangola ya kokata matiti.”​—Mika 4:3.

 Mpo na koyeba makambo mingi na oyo etali bilaka ya Biblia oyo elobi ete bato bakofanda na mabele kozanga kobanga, tángá lisolo “Affranchis de la peur : est-ce possible?

 Mpo na koyeba makambo mingi na oyo etali ndenge mobulu ekosila, tángá lisolo “Enfin la paix sur la terre!