Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia esakolaki nini mpo na koningana ya mabele ya makasi mpenza?

Biblia esakolaki nini mpo na koningana ya mabele ya makasi mpenza?

 Mbula na mbula, mabele ezali koningana mbala ebele mpenza. Koningana ya mabele mosusu ezalaki mikemike, kasi mosusu ezalaki makasi mpenza, yango ebebisaki biloko mingi, esalaki ete bato banyokwama, mpe ebomaki bato mingi. Ntango mosusu mpe, ebimisaki tsunami oyo ebebisaki bisika mingi, mpe ebomaki bato ebele mpenza oyo bafandaka na bisika yango. Biblia esakolaki ete mabele ekoningana makasi bongo?

Na lisolo oyo tokolobela

 Biblia esakolaki ete koningana ya mabele ekosalema?

 Biblia etángi koningana ya mabele na kati ya esakweli oyo Yesu apesaki. Tokoki kotánga makambo oyo alobaki mpo na koningana ya mabele na kati ya mikanda misato ya Biblia, maloba na ye ekomami boye:

 “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.”​—Matai 24:7.

 “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge, nzala ekozala.”​—Marko 13:8.

 Mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge, mpe bamaladi mabe mpe nzala ekozala na bisika ndenge na ndenge.”​—Luka 21:11.

 Yesu asakolaki ete “mabele ekoningana makasi” na “bisika ndenge na ndenge” na ntango oyo bitumba, nzala, mpe bamaladi mabe ekozala na bisika ndenge na ndenge. Makambo wana nyonso emonisi ete tozali na eleko oyo ebengami “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” to “mikolo ya nsuka.” (Matai 24:3; 2 Timote 3:1) Na kolanda badati oyo Biblia epesi, “mikolo ya nsuka” ebandaki na 1914 mpe esili naino te.

 Koningana ya mabele oyo ezali kosalema lelo oyo ezali kokokisa esakweli ya Biblia?

 Ɛɛ. Esakweli ya Yesu, oyo na kati na yango alobaki ete mabele ekoningana, ekokani na makambo oyo ezali kosalema lelo oyo na miso na biso. Kobanda 1914, mabele eninganaki makasi mbala koleka 1 950, mpe ebomaki bato koleka milio mibale. a Tótala ndambo na yango ya siɛklɛ oyo.

 2004​—Océan Indien. Mabele eninganaki makasi (magnitude 9,1) mpe ebimisaki tsunami oyo ekómaki na bikólo koleka zomi mpe ebomaki bato soki 225 000.

 2008​—Chine. Mabele eninganaki makasi (magnitude 7,9) mpe ebebisaki bamboka ná bingumba, ekoki kozala ete bato soki 90 000 bakufaki, bato soki 375 000 bazokaki, mpe bamilio ya bato bazalaki lisusu na bandako te.

 2010​—Haïti. Mabele eninganaki makasi (magnitude 7,0) mpe koningana ya mabele mosusu ya moke esalemaki na nsima mpe ebomaki bato koleka 300 000 mpe bato koleka milio moko bazalaki na bandako lisusu te.

 2011​—Japon. Mabele eninganaki makasi (magnitude 9,0) mpe ebimisaki tsunami oyo ebomaki bato soki 18 500 mpe ebele ya bato mosusu bakimaki bandako na bango. Izini ya kopesa kura ya Fukushima ebebaki, ebimisaki mopɛpɛ ya mabe oyo etyaki bomoi na likama. Mbula zomi na nsima, bato soki 40 000 bazalaki naino na likoki te ya kozonga na bandako na bango mpo bazalaki kobanga kozwa maladi oyo ekoki kouta na mopɛpɛ wana ya mabe.

 Esakweli ya Biblia oyo elobeli koningana ya mabele elimboli nini mpo na biso?

 Esakweli ya Biblia oyo elobi mabele ekoningana ezali kokebisa biso mpo na makambo oyo ekosalema mosika te. Yesu alobaki ete: “Ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.”​—Luka 21:31.

 Biblia elobi ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo mpenza oyo ezali na likoló, mpe Yesu Kristo nde moto akozala Mokonzi na yango. Bokonzi yango ezali nde oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na yango.​—Matai 6:10.

 Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele, Nzambe akosala ete makama oyo ebimaka yango moko ebima lisusu te, mpo enyokola bato te, kati na yango koningana ya mabele. (Yisaya 32:18) Likambo ya malamu ezali ete, Nzambe akosilisa mitungisi ya nzoto mpe ya mayoki oyo koningana ya mabele ezali kobimisela bato lelo oyo. (Yisaya 65:17; Emoniseli 21:3, 4) Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo “Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?

a Mitángo ya makambo ya koningana ya mabele ya makasi mpenza na mokili euti na United States National Geophysical Data Center.