Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Comstock Images/Stockbyte via Getty Images

KAMPANYE YA SIPESIALE

Bosembo ezali te na baguvernɛma ya mokili​—Oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala

Bosembo ezali te na baguvernɛma ya mokili​—Oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala

 Bato babaye lokuta ya bakonzi mingi ya mokili oyo mpe bazali na mposa ya bakonzi oyo bakoki kotyela mpenza motema. Lapolo moko oyo ebimaki na 2023 emonisaki ete, soki ezali na bato oyo bato mingi batyelaka motema te na mokili, ya liboso ezali bakonzi ya politiki. a

 Biblia elobeli guvernɛma moko oyo Mokonzi na yango abongi mpenza kotyelama motema mpe azalaka ntango nyonso sembo. Guvernɛma yango ezali Bokonzi ya Nzambe mpe Mokonzi na yango ezali Yesu Kristo.​—Yisaya 9:7.

 Makambo oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele emonisi mpenza ete ayokelaka bato mawa. (Matai 9:35, 36) Lokola azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, mosika te akosala ete bosembo mpe kimya ezala kati na bato nyonso oyo bandimi bokonzi na ye.​—Nzembo 72:12-14.

a Lapolo ya Edelman Trust Barometer Global 2023.