Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 88

Teyá ngai banzela na yo

Teyá ngai banzela na yo

(Nzembo 25:4)

  1. 1. Yehova Nzambe, tosangani lelo,

    Yo nde mot’obengisi biso.

    Mp’oteya biso na Liloba na yo,

    Mwinda ya makolo na biso.

    (MONDIMO)

    Banzela na yo, teyá nga’ yango;

    Natya matoi na toli na yo.

    Tambwisá nga’ na nzela ya sembo,

    Nalinga mingi mibeko na yo.

  2. 2. Nani aza’ na bwanya lokola yo?

    Yo omikosaka te, Nkolo.

    Liloba na yo ekamwisi biso;

    Elekaka te, eza’ seko.

    (MONDIMO)

    Banzela na yo, teyá nga’ yango;

    Natya matoi na toli na yo.

    Tambwisá nga’ na nzela ya sembo,

    Nalinga mingi mibeko na yo.