Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 78

‘Tóteya Liloba ya Nzambe’

‘Tóteya Liloba ya Nzambe’

(Misala 18:11)

  1. 1. Biso bateyi-Liloba,

    Toza’ na esengo.

    Matomba tozali kozwa

    Eza’ mingi mpenza.

    Mpo bato toz’osalisa

    Baz’oyamba solo.

    Mpo toteyi bango lokola

    Yesu, na bolingo.

  2. 2. Awa toz’oteya bato,

    Tósalaka nyonso

    Bámona pole ya Nzambe

    Na bomoi na biso.

    Yango wana, tóyekola

    Mpenza na mozindo.

    Mpo oyo toza’ kozwa kuna

    Eteyaka biso.

  3. 3. Yah aza’ kopesa nyonso

    Na mosala oyo.

    Nyonso oyo tosɛngi ye,

    Akosala yango.

    Tólinga Liloba na ye,

    Mpo ekosaka te.

    Tólinga bato toz’oteya,

    Bákóma bateyi!