Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 72

Tóyebisa bato solo ya Bokonzi

Tóyebisa bato solo ya Bokonzi

(Misala 20:20, 21)

  1. 1. Liboso toyebaki te

    Nzela mokristo’akokende.

    Kasi Yah’tindi pole,

    Nsango ya Bokonzi na ye.

    Tososoli mokano n’e,

    Mpo na kosalela Nzambe,

    Kokumisa kaka ye,

    Kosantisa seko nkombo na ye.

    Lelo toza’ kosakola,

    Ndako nyonso mpe na nzela.

    Toz’oteya bato solo,

    Efungoli bango miso.

    Awa toza’ kokɔtisa

    Bipai nyonso losambo’a Yah,

    Tókoba ndenge wana

    Tii mosal’ekokóma na nsuka.