Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 57

Tósakwela bato ya ndenge nyonso

Tósakwela bato ya ndenge nyonso

(1 Timote 2:4)

  1. 1. Tómekola nde Nzambe na biso,

    Oyo aponaka bilongi te.

    Y’alingi nde ndenge nyonso’a bato

    Bábika mpe báya epai na ye.

    (MONDIMO)

    At’aza’ n’eloko te;

    To atángá mingi te.

    Nzambe atalaka motema nde.

    Bolingo etinda nde

    Tóteya bato’a ndenge

    nyonso bákóma baning’a Nzambe.

  2. 2. Ata soki bafandaka wapi

    To baza’ bato ya ndenge nini.

    Nzambe atalaka nde motema​—

    Yango nd’eza’ na ntina mpo na ye.

    (MONDIMO)

    At’aza’ n’eloko te;

    To atángá mingi te.

    Nzambe atalaka motema nde.

    Bolingo etinda nde

    Tóteya bato’a ndenge

    nyonso bákóma baning’a Nzambe.

  3. 3. Yehov’ayambaka moto nyonso

    Oy’akimi mokili’a Satana.

    Biso toyebi likambo yango,

    Tóyebisa bato nyonso bongo.

    (MONDIMO)

    At’aza’ n’eloko te;

    To atángá mingi te.

    Nzambe atalaka motema nde.

    Bolingo etinda nde

    Tóteya bato’a ndenge

    nyonso bákóma baning’a Nzambe.