Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 51

Tomipesi na Nzambe!

Tomipesi na Nzambe!

(Matai 16:24)

  1. 1. Yehov’abendi biso, tolandi Kristo;

    Tokómi bayekoli na ye.

    Yehova na likoló,

    Asopi pole na nse.

    Biso tondimeli ye;

    Toponi, tolingi ye.

    (MONDIMO)

    Biso moko nde tomipesi na Nzambe.

    Tosepeli na ye ná Mwana n’e.

  2. 2. Na libondeli, tolakaki Yehova:

    Tokotosa ye mpo na seko.

    Oyo nsuka n’esengo,

    Komema nkombo na ye,

    Koteya solo na ye,

    Tolingi bóyeb’ango.

    (MONDIMO)

    Biso moko nde tomipesi na Nzambe.

    Tosepeli na ye ná Mwana n’e.