Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 3

Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

(Masese 14:26)

  1. 1. Ee Yehova, opesá biso

    elikya kitoko.

    Tolingi koyebis’ango

    na bikólo nyonso.

    Kasi mitungisi ya bomoi

    ekoki kolɛmbisa

    Mpe kobosanisa biso

    ata paradiso.

    (MONDIMO)

    Yo nguya, elikya,

    makasi na nga’.

    Soki naleli, opesi.

    Nasakolaka nsango

    n’o na mpiko,

    mpo nayebi’ete y’ozali.

  2. 2. Ee Yehova, salisá biso

    tóbosanaka te

    Ndenge osungaka biso

    na ntango ya mpasi.

    Kokanisa makambo yango

    ekolamwisa biso

    Mpo tókoba kosakola

    nkombo n’o na mpiko.

    (MONDIMO)

    Yo nguya, elikya,

    makasi na nga’.

    Soki naleli, opesi.

    Nasakolaka nsango

    n’o na mpiko,

    mpo nayebi’ete y’ozali.