Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

“Motema na ngai ekozala mpenza kuna ntango nyonso”

“Motema na ngai ekozala mpenza kuna ntango nyonso”

Yehova amiponelaki tempelo (2Nt 7:11, 12)

Yehova alobaki ete motema na ye ekozala mpenza kuna ntango nyonso, mpo na komonisa ete akotya mpenza likebi na makambo oyo ezali kosalema na tempelo yango (2Nt 7:16; w02 15/11 lok. 5 par. 1)

Soki bato batiki kotambola liboso ya Yehova “na motema na bango mobimba,” akotika nzela ete tempelo yango ebebisama (2Nt 6:14; 7:19-21; it-2-F lok. 1048 par. 5)

Na ntango ya bofungoli ya tempelo, bato bakanisaki ete mitema na bango ekozala ntango nyonso na tempelo. Likambo ya mawa, bato yango bakómaki mokemoke kobungisa esengo na bango mpo na kosambela Yehova.

OMITUNA BOYE: ‘Nini emonisi ete namipesi mobimba na losambo na ngai?’