Emoniseli epai ya Yoane 19:1-21

  • Bósanzola Yah mpo na bikateli na ye (1-10)

    • Libala ya Mwana-Mpate (7-9)

  • Moto oyo afandi likoló ya mpunda ya mpɛmbɛ (11-16)

  • Fɛti monene ya mpokwa ya Nzambe (17, 18)

  • Balongi nyama mabe (19-21)

19  Nsima na yango nayokaki mongongo moko ya makasi oyo ezalaki lokola mongongo ya ebele ya bikelamu na likoló. Balobaki ete: “Bósanzola Yah!*+ Lobiko ná nkembo ná nguya ezali ya Nzambe na biso,  mpo bikateli na ye ezali solo mpe sembo.+ Mpo apesi etumbu na mwasi ya ndumba monene oyo abebisaki mabele na pite* na ye, mpe azongiseli ye mabe mpo na makila ya baombo na ye oyo ezali na mabɔkɔ ya mwasi yango ya ndumba.”*+  Mpe na ntango wana kaka balobaki mbala ya mibale ete: “Bósanzola Yah!*+ Mpo milinga ya engumba ezali kokoba komata libela na libela.”+  Bankulutu 24+ mpe bikelamu minei ya bomoi+ bakweaki mpe basambelaki Nzambe oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe balobaki ete: “Amen! Bósanzola Yah!”*+  Lisusu, mongongo moko eutaki na kiti ya bokonzi mpe elobaki ete: “Bósanzola Nzambe na biso, bino nyonso baombo na ye,+ baoyo bobangaka ye, bato mike ná bato minene.”+  Mpe nayokaki mongongo moko oyo ezalaki lokola mongongo ya ebele ya bikelamu mpe lokola lokito ya ebele ya mai oyo ezali kotíyola makasi mpe lokola lokito ya bankake makasi. Elobaki ete: “Bósanzola Yah,*+ mpo Yehova* Nzambe na biso, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ abandi koyangela.+  Tósepela mpe tótonda na esengo mpenza, mpe tókumisa ye, mpo fɛti ya libala ya Mwana-Mpate ekómi mpe mwasi na ye amilɛngɛli.  Ɛɛ, bapesi ye nzela alata lini ya kitoko, ya ngɛlingɛli, ya pɛto, mpo lini ya kitoko elakisi misala ya bosembo* ya basantu.”+  Mpe anzelu ayebisi ngai ete: “Komá: Esengo na bato oyo babengisami na bilei ya mpokwa ya libala ya Mwana-Mpate.”+ Lisusu, ayebisi ngai ete: “Wana ezali maloba ya solo ya Nzambe.” 10  Bongo nakweaki na makolo na ye mpo na kosambela ye. Kasi ayebisi ngai ete: “Kebá! Kosala bongo te!+ Nazali kaka moninga moombo lokola yo mpe lokola bandeko na yo oyo bazali na mosala ya kotatola mpo na Yesu.+ Sambelá Nzambe!+ Mpamba te bisakweli epesami* nde mpo na kotatola mpo na Yesu.”+ 11  Namonaki likoló efungwami, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ.+ Mpe moto oyo afandaki likoló na yango abengami Sembo+ mpe Solo,+ asambisaka mpe abundaka etumba na boyengebene.+ 12  Miso na ye ezali lolemo ya mɔtɔ,+ mpe motó na ye ezali na mitole* mingi. Azali na nkombo moko ekomami oyo moto moko te ayebi longola kaka ye moko, 13  mpe alati elamba ya likoló oyo ezwi makila,* mpe babengi ye na nkombo Liloba+ ya Nzambe. 14  Lisusu, mampinga ya likoló ezalaki kolanda ye na bampunda ya mpɛmbɛ, mpe balataki lini ya kitoko ya mpɛmbɛ, ya pɛto. 15  Mpe mopanga moko ya molai oyo epeli makasi+ ezali kobima na monɔkɔ na ye, mpo na kobɛta na yango bikólo, mpe akokamba bango na lingenda moko ya ebende.+ Lisusu, azali konyata mbuma na ekamwelo ya vinyo ya nkanda makasi ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+ 16  Na elamba na ye ya likoló, ɛɛ na ebɛlɔ na ye, azali na nkombo moko ekomami: Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo.+ 17  Namonaki mpe anzelu moko atɛlɛmi na kati ya moi, agangaki na mongongo makasi mpe alobaki na bandɛkɛ nyonso oyo ezali kopumbwa na katikati ya likoló* ete: “Bóya awa, bóyangana na fɛti monene ya mpokwa oyo Nzambe asali,+ 18  mpo bólya misuni ya bakonzi, misuni ya bakomanda ya basoda, misuni ya bato ya makasi,+ misuni ya bampunda mpe ya baoyo bafandi likoló na yango,+ misuni ya bato nyonso, ya bato ya bonsomi mpe ya baombo, ya bato mike mpe ya bato minene.” 19  Mpe namonaki nyama mabe, bakonzi ya mabele mpe mampinga na bango bayangani mpo na kobunda etumba na moto oyo afandi likoló ya mpunda mpe na limpinga na ye.+ 20  Mpe bakangaki nyama mabe, elongo na mosakoli ya lokuta+ oyo asalaki bilembo liboso na yango, oyo na nzela na yango akosaki bato oyo bazwaki elembo ya nyama mabe+ mpe bato oyo bazali kosambela elilingi na yango.+ Bango mibale babwakamaki wana bazali naino na bomoi na laki ya mɔtɔ oyo ezali kopela na sufulu.+ 21  Kasi bato oyo batikalaki babomamaki na mopanga ya molai oyo ebimaki na monɔkɔ ya moto oyo afandi likoló ya mpunda.+ Mpe bandɛkɛ nyonso etondaki misuni na bango.+

Maloba na nse

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “na lobɔkɔ na ye.”
To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
Talá Ap. A5.
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mokano ya bisakweli ezali.”
To, “bilembo ya bokonzi.”
To mbala mosusu, “emwangisami makila.”
To, “likoló ya motó na ngai.”