Mokanda ya liboso ya Ntango 20:1-8

  • Babɔtɔli engumba Raba (1-3)

  • Babomi bilombe ya Bafilistia (4-8)

20  Na ebandeli ya mbula,* na ntango oyo bakonzi babimaka mpo na etumba, Yoabe+ akambaki etuluku moko ya basoda mpe abebisaki mokili ya Baamone; akendaki kozinga Raba.+ Nzokande Davidi atikalaki na Yerusaleme.+ Yoabe abundisaki Raba mpe abebisaki yango.+  Bongo Davidi azwaki motole* oyo ezalaki na motó ya Malakame, mpe amonaki ete ezali na kilo ya talanta moko* ya wolo, mpe kati na yango, ezalaki na mabanga ya ntalo; mpe batyaki yango na motó ya Davidi. Azwaki mpe biloko ebele oyo bapunzaki na engumba yango.+  Abimisaki bato oyo bazalaki na engumba yango, mpe apesaki bango mosala+ ya kokata mabanga na sii, ya kosalela bisaleli ya ebende oyo epeli makasi mpe misala ya kosala na bipasola.* Davidi asalaki bongo na bingumba nyonso ya Baamone. Nsukansuka, Davidi ná basoda nyonso bazongaki na Yerusaleme.  Nsima na yango, bitumba ebimaki na Gezere ná Bafilistia. Na ntango yango, Sibekai+ Mohusha abomaki Sipai, oyo azalaki moto ya libota ya Barefaime,+ mpe balongaki Bafilistia.  Bitumba ebimaki lisusu ná Bafilistia. Mpe Elehanane mwana ya Yaire abomaki Lahami ndeko ya Goliate+ moto ya Gate, oyo nzete ya likɔnga na ye ezalaki monene lokola nzete ya kolíngela nsinga oyo basali-bilamba basalelaka.+  Etumba mosusu ebimaki na Gate.+ Kuna, ezalaki na mobali moko ya mbinga mpenza,+ oyo azalaki na misapi 24: misapi 6 na lobɔkɔ mokomoko mpe misapi 6 na lokolo mokomoko. Ye mpe azalaki moto ya libota ya Barefaime.+  Azalaki kaka kotumola+ Yisraele. Na yango, Yonatane mwana ya Shimea,+ ndeko ya Davidi, abomaki ye.  Bafilistia yango bazalaki bato ya libota ya Barefaime+ oyo bazalaki kofanda na Gate.+ Davidi ná bato na ye nde babomaki bango.

Maloba na nse

Elingi koloba, eleko ya prɛnta.
To, “ekɔti ya bokonzi.”
Soki 34,2 kg. Talá Ap. B14.
To, “basóka.”