Mokanda ya liboso epai ya Bakorinti 2:1-16

  • Paulo azali kosakola na Korinti (1-5)

  • Bwanya ya Nzambe eleki mosika (6-10)

  • Moto ya elimo ná moto ya mosuni (11-16)

2  Na yango, bandeko, ntango nayaki kosakwela bino sekele mosantu+ ya Nzambe, nasalelaki te maloba to bwanya oyo ezali kokamwisa.+  Mpo ntango nazalaki kati na bino nazwaki ekateli ya kolobela eloko mosusu te longola kaka Yesu Kristo, ndenge babakaki ye na nzete.+  Mpe nayaki epai na bino na bolɛmbu, na kobanga mpe na kolɛnga makasi;  mpe elobeli na ngai mpe makambo oyo nasakolaki ezalaki te na maloba ya kondimisa ya bwanya kasi ezalaki nde na misala oyo ezalaki komonisa elimo mpe nguya,+  mpo bóndimela bwanya ya bato te, kasi nde nguya ya Nzambe.  Nzokande, tozali kolobela bwanya epai ya bato oyo bakɔmɛli,+ kasi bwanya ya mokili oyo* te to mpe ya bakonzi ya mokili oyo te, oyo basengeli kokóma mpamba.+  Tozali kolobela nde bwanya ya Nzambe na kati ya sekele mosantu,+ bwanya oyo ebombamá, oyo Nzambe akanaki mpo na nkembo na biso liboso bato bátya bibongiseli na bango.  Bwanya wana, ata moto moko te na bakonzi ya mokili oyo* bayebaki yango,+ mpo soki báyebaka yango, mbɛlɛ babakaki te na nzete Nkolo oyo atondi na nkembo.  Kasi kaka ndenge ekomamá ete: “Liso emoná te mpe litoi eyoká te, mpe eyá te na motema ya moto, makambo oyo Nzambe abongisá mpo na baoyo balingaka ye.”+ 10  Mpo biso nde Nzambe amonisi yango+ na nzela ya elimo na ye,+ mpo elimo elukalukaka na kati ya makambo nyonso, ata na makambo mozindo ya Nzambe.+ 11  Mpo nani na kati na bato ayebaka makanisi ya moto, longola kaka elimo oyo ezali na kati ya moto yango? Ndenge moko mpe, moto moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka elimo ya Nzambe. 12  Nzokande biso tozwi elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti na Nzambe,+ mpo tóyeba makambo oyo Nzambe apesi biso na boboto. 13  Tozali mpe kolobela makambo yango, na maloba oyo eteyami na bwanya ya bato te,+ kasi na oyo eteyami na elimo,+ wana tozali kolimbola* makambo ya elimo na maloba ya elimo. 14  Kasi moto ya mosuni andimaka* te makambo ya elimo ya Nzambe, mpo ezali bozoba na miso na ye; mpe akoki te koyeba yango, mpo etalelamaka malamumalamu na ndenge ya elimo. 15  Nzokande, moto ya elimo atalelaka malamumalamu makambo nyonso,+ kasi ye moko atalelamaka malamumalamu ata na moto moko te. 16  Mpo “nani ayebi makanisi ya Yehova,* mpo alakisa ye”?+ Kasi biso tozali na makanisi ya Kristo.+

Maloba na nse

To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kosangisa.”
To, “ayambaka.”
Talá Ap. A5.