Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Nazwaka makasi na bolɛmbu na ngai

Nazwaka makasi na bolɛmbu na ngai

Soki moto amoni ngai, akondima te ete nazali makasi. Nafandaka na kiti ya bibɔsɔnɔ mpe nazali na kilo 29 mpamba. Nzokande, atako makasi ya nzoto ezali kosila, nakobaka kokende liboso. Tiká nayebisa bino ndenge nini nazwaka makasi.

Nazali na mbula minei

Na bomwana na ngai, nazalaki esengoesengo mpe ngai ná baboti na ngai tozalaki kofanda na mboka moko na sudi ya France. Tata asalelaki ngai eloko moko ya lisano, mpe nazalaki kosepela mingi kokimakima na lopango. Na 1966, Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na biso mpe na nsima bakómaki kosolola na tata. Sanza nsambo mpamba na nsima, tata azwaki mokano ya kokóma Motatoli. Eumelaki te, mama alandaki lokolo na ye, mpe nazalaki kokola na libota moko ya esengo.

Maladi na ngai ebandaki mwa moke nsima ya kozonga na Espagne, mboka ya baboti na ngai. Nakómaki koyoka mpasi makasi na mabɔkɔ ná makolo. Nsima ya kokutana na minganga ebele na boumeli ya mbula mibale, tokutanaki na monganga moko oyo ayebi malamu maladi ya mingai mpe alobaki na biso na mawa ete, “Maladi na ye esí ekoli mingi.” Mama abandaki kolela. Monganga alobaki ete nazali na maladi moko ya mingai oyo ezwaka bana mike, oyo esalaka ete nzoto ekóma komibundisa mpe koboma binama mosusu; esalaka mpasi makasi mpe evimbisaka matonga. Nakangaki mpenza ntina te mpo nazalaki na mbula 10 mpamba, kasi namonaki ete ezali nsango ya mabe.

Monganga asɛngaki bákende kotika ngai na lopitalo ya bana oyo bazali na maladi oyo eumelaka. Ntango nakómaki kuna, ndako yango ebangisaki ngai mpo ezalaki lokola bolɔkɔ. Bazalaki makambo makasi: Bamamɛlo bakataki ngai nsuki mpe balatisaki ngai zambala ya lopitalo. Nazalaki kolela mpe komituna: ‘Nakokoka mpenza kofanda awa?’

NAMONI LOBƆKƆ YA YEHOVA

Lokola baboti na ngai bateyaki ngai makambo ya Yehova, nazalaki koboya kokɔta na losambo ya Lingomba ya Katolike oyo bazalaki kosala na lopitalo. Bamamɛlo bazalaki koyeba te mpo na nini nazalaki koboya. Nabondelaki Yehova ete atika ngai te; eumelaki te, nayokaki lokola lobɔkɔ na ye ezingi ngai, lokola tata ya bolingo mpe ya boboto oyo azali kobatela mwana na ye.

Baboti na ngai bazalaki koya kotala ngai mwa ntango moke pɔsɔ nyonso, na mokolo ya pɔsɔ. Bazalaki komemela ngai mikanda ya makambo ya Biblia mpo natángaka mpo esalisa ngai nazala na kondima makasi. Na lopitalo yango, bazalaki koboya bana bázala na mikanda na bango moko; kasi bamamɛlo batikaki ngai nazala na Biblia, mpe nazalaki kotánga yango mikolo nyonso. Nazalaki mpe koyebisa bana basi mosusu elaka ya kofanda libela na libela na Paradiso awa na mabele, epai maladi ekozala te. (Emoniseli 21:3, 4) Na bantango mosusu nazalaki mawamawa mpe komiyoka lokola mwana etike, kasi nazalaki na esengo mpo kondima na ngai epai ya Yehova ezalaki kokóma makasi.

Nsima ya sanza motoba, minganga bazongisaki ngai na ndako. Maladi na ngai esilaki te, kasi nasepelaki mpo nazongaki kofanda na baboti na ngai. Mikuwa ya nzoto na ngai ebebaki, mpe nazalaki koyoka mpasi makasi mpenza. Ntango nakómaki na mbula 13, nazalaki nzoto makasi te. Atako bongo, nazwaki batisimo ntango nakómaki na mbula 14, mpe nazwaki ekateli ya kosala nyonso oyo nakoki na mosala ya Nzambe. Kasi, na bantango mosusu nazalaki kolelela ye. Nazalaki kobondela ete: “Mpo na nini kaka ngai? Bikisá ngai. Ozali komona mpasi na ngai te?”

Bolenge na ngai ezalaki ntango ya mpasi mingi. Nasengelaki kondima ete maladi na ngai ekosila te. Nazalaki ntango nyonso komikokanisa na baninga na ngai​—bazalaki nzoto makasi mpe bazalaki kosepela na bomoi. Nazalaki komimona ntina te, mpe nakómaki kokima bato. Kasi, libota mpe baninga na ngai batikaki ngai te. Nabosanaka Alicia te, oyo azali mokóló na ngai ya mbula 20, kasi akómaki moninga na ngai ya motema. Asalisaki ngai nayekola kotyela mpe basusu likebi na esika ya kokanisa kaka maladi na ngai.

MAKAMBO OYO ESALISAKA NGAI NAZALA NA ESENGO

Ntango nazalaki na mbula 18, maladi na ngai eyaki lisusu makasi, mpe ata kokende makita ya losambo ezalaki kosilisa ngai makasi na nzoto. Atako bongo, soki natikali na ndako, nazalaki kosalela ntango yango mpo na koyekola Biblia na likebi. Mokanda ya Yobo mpe ya Nzembo esalisaki ngai namona ete lelo oyo, Yehova Nzambe abatelaka libosoliboso nzoto na biso te, kasi asalisaka biso nde tózala na boyokani malamu na ye. Kosambela mingi epesaki ngai “nguya oyo eleki makasi” mpe “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”​—2 Bakorinti 4:7; Bafilipi 4:6, 7.

Ntango nakómaki na mbula 22, nazwaki nsango moko ya mpasi: nakofanda na kiti ya bibɔsɔnɔ bomoi na ngai mobimba. Nazalaki kobanga ete bato bábanda komona kaka mwasi moko alɛmbalɛmbá afandi na kiti ya bibɔsɔnɔ. Nzokande, kiti yango esalisaki ngai nakóma kosala makambo mosusu ngai moko; nakanisaki ete ekozala mabe, nzokande esalisaki ngai. Moninga na ngai Isabel apesaki likanisi ete ngai ná ye tómityela mokano ya kosakola ngonga 60 na sanza moko.

Na ebandeli, namonaki lokola alingi nde kotyola ngai. Kasi, nasɛngaki Yehova asalisa ngai; lokola mpe baninga ná baboti na ngai basungaki ngai, nalongaki kosala yango. Sanza yango elekaki nokinoki; namonaki ete kobangabanga esilaki mpe natikaki koyoka nsɔni. Esepelisaki ngai mingi; yango wana na 1996, nazwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza, elingi koloba ete nasakolaka ngonga 90 sanza na sanza. Nazwaki ekateli ya malamu mpenza mpo esalisaki boyokani na ngai na Nzambe ekóma lisusu makasi mpe ezalaki kopesa ngai makasi ata na nzoto. Mosala ya kosakola epesaki ngai likoki ya koyebisa bato ebele mateya oyo nandimaka, mpe nasalisaki bato yango mosusu bakóma baninga ya Nzambe.

YEHOVA ATIKI NGAI TE

Na 2001, nasalaki aksida na motuka mpe makolo na ngai nyonso ebukanaki. Mokolo moko na lopitalo nazalaki koyoka mpasi makasi mpenza; nabondelaki Yehova na kati ya motema ete: “Yehova, nabondeli yo, kotika ngai te!” Na mbala moko, mwasi moko oyo azalaki na mbeto mosusu pene na ngai atunaki ngai, “Ozali Motatoli ya Yehova?” Nazalaki na makasi ya koloba te; nandimaki kaka na motó. Alobaki boye: “Nayebi bino! Natángaka mikanda na bino mingi.” Maloba wana ekitisaki ngai motema mpenza. Atako nazalaki na mpasi makasi, napesaki litatoli mpo na Yehova. Epesaki ngai esengo mingi!

Ntango nayokaki mwa malamu, nazwaki mokano ya kosakola mwa mingi koleka. Mama azalaki kotambwisa ngai na kiti na ngai na lopitalo, batyaki ngai simá na makolo. Mokolo na mokolo, nazalaki kokende kotala bato ya maladi, kotuna bango soki bayoki ndenge nini, mpe kotikela bango mwa mikanda ya makambo ya Biblia. Kosala bongo ezalaki kosilisa ngai makasi, kasi Yehova azalaki kosunga ngai.

Elongo na baboti na ngai, na 2003

Eleki mwa bambula, nzoto ekómaki kosala ngai mpasi mingi koleka. Longola yango, liwa ya tata na ngai ebakiselaki ngai mawa. Kasi, nasalaka makasi nazala ntango nyonso na makanisi ya malamu. Nini esalisaka ngai? Soki likoki ezali, nazalaka elongo na baninga mpe bandeko ya libota; yango esalisaka ngai nabosana mikakatano na ngai. Mpe soki nazali ngai moko, natángaka Biblia, nayekolaka, mpe nateyaka bato na nzela ya telefone.

Mbala mingi, ntango nazali ngai moko, namimonaka na mokili ya sika oyo Nzambe alaki

Nasepelaka mpe na mwa makambo ya mikemike, na ndakisa ntango mopɛpɛ ezali kobɛta ngai na elongi to ntango nazali koyoka nsolo ya bafololo. Napesaka Nzambe matɔndi mingi mpo na yango. Mwa masɛki mpe esalisaka ngai mingi. Mokolo moko na mosala ya kosakola, moninga oyo azalaki kopusa ngai na kiti na ngai ya bibɔsɔnɔ atɛlɛmaki mpo akoma likambo moko. Na mbala moko, kiti ebandaki kokita yango moko na nzela, mpe nakendaki kotutana na motuka moko oyo etɛlɛmaki na nse. Biso mibale toyokaki nsɔmɔ, kasi ntango tomonaki ete nazwi likama te, tobandaki kosɛka.

Ezali na makambo mingi oyo nakoki kosala te. Nayebaka ete mokolo ezali, nakosala yango. Mbala mingi, ntango nazali ngai moko, namimonaka na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (2 Petro 3:13) Namimonaka nazali na nzoto makasi, nazali kotambola, mpe kosepela mpenza na bomoi. Nasepelaka mingi na maloba ya Mokonzi Davidi oyo: “Tyelá Yehova elikya; zalá na mpiko mpe motema na yo ezala makasi.” (Nzembo 27:14) Atako nzoto na ngai ezali kaka kolɛmbalɛmba, Yehova azali kokómisa ngai makasi. Nazali kozwa nguya na bolɛmbu na ngai.