Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Yehova abosanaki ngai te”

“Yehova abosanaki ngai te”
  • ABOTAMAKI NA: 1922

  • EKÓLO: ESPAGNE

  • BOMOI NA YE YA KALA: MAMA YA MALONGI

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na Bilbao, engumba ya bato oyo bazali na bozwi mingi te, na nɔrdi ya Espagne. Nazalaki mwana ya mibale na libota ya bana basi minei. Tata ná mama na biso bazalaki bandimi ya molende ya Lingomba ya Katolike mpe nazalaki kokɔta misa mikolo nyonso. Ntango nakokisaki mbula 23, nakómaki molakisi: mosala oyo nalingaki mingi mpe nasalaki yango na boumeli ya mbula 40. Nazalaki koyoka esengo mingi ntango nazali kotángisa makambo etali Lingomba ya Katolike, mpe na mpokwa nazalaki mama ya malongi: nazalaki koteya bana mike ya basi mpo na kobongisa bango na kokula kominyo.

Mbula 12 nsima ya kofanda na libala moko ya esengo, mobali na ngai akufaki mpe atikaki ngai ná bana minei ya basi. Nazalaki na mbula 33 mpamba! Nalukaki lisalisi na lingomba na ngai ya Katolike, kasi nazalaki kaka na mituna oyo ezalaki kotungisa ngai. Nazalaki komituna: ‘Mpo na nini bato bazali kokufa tii lelo, nzokande Kristo asilá koya mpo na kobikisa biso? Soki bato ya malamu bakendaka na likoló, mpo na nini tobondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya?’ Motuna oyo ezalaki kotungisa ngai mingi ezalaki: ‘Soki Nzambe asambisaka moto ntango akufi, mpo na nini na nsima ekosɛnga moto yango alongwa na likoló, na epongelo, to mpe na lifelo mpo aya na kosambisama ya nsuka?’

Natunaki mwa basango mosusu mituna yango. Moko ayanolaki ete: “Nayebi te. Tuná episkɔpɔ-mokonzi. Mpo na nini ozali komituna mituna yango? Ondimelaka Nzambe, boye te? Kokipe makambo wana te!” Kasi nakobaki koluka biyano. Na nsima, nakómaki koyoka mateya ya Ba-Jésuite, Ba-Pentecôtiste mpe Ba-Gnostique. Kasi, moko te epesaki biyano ya malamu na mituna na ngai.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Ntango nakómaki na mbula mwa moke koleka 60, mwana-kelasi moko ya mbula 7 abengaki ngai nakende na likita moko ya Batatoli ya Yehova. Nasepelaki na makambo oyo namonaki mpe oyo nayokaki, kasi lokola nazalaki na ntango te, nakutanaki lisusu na Batatoli ya Yehova te. Mbula mibale na nsima, Batatoli ya Yehova mibale, Juan ná mwasi na ye Maite, bayaki kotala ngai. Na boumeli ya sanza misato, masolo na biso ezalaki kaka ya mituna mpe biyano, mpe nsukansuka nandimaki koyekola Biblia.

Nazalaki kozela boyekoli na mposa makasi mpenza! Nazalaki kolandela makambo nyonso malamumalamu mpe nazalaki kosalela mabongoli misato ya Biblia mpo natala soki Batatoli ya Yehova bazalaki mpenza koteya makambo ya solo. Eumelaki te, namonaki ete nazalaki na molili na boumeli ya bambula ebele. Nakamwaki komona ete mateya oyo nazalaki kondima ekesanaki mpenza na makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia. Nalɛmbaki mpenza nzoto; mateya oyo nazalaki kondima kala ezalaki lokola nzete moko oyo epikamaki makasi, kasi sikoyo bazalaki kopikola yango.

Nayebaki ete nazwaki eloko moko ya motuya

Na nsima, mobali na ngai ya mibale abɛlaki makasi mpe akufaki. Kaka na bantango wana, nazwaki pansiɔ mpe nalongwaki na Bilbao mpo na mwa mikolo. Juan ná Maite mpe bakendaki esika mosusu. Na yango, nazalaki lisusu koyekola Biblia te. Kasi, na kati ya motema, nayebaki ete nazwaki eloko moko ya motuya. Nabosanaki yango ata mokolo moko te.

Mbula soki 20 na nsima, ntango nakómaki na mbula 82, Juan ná Maite bazongaki na engumba Bilbao mpe bayaki kotala ngai. Nasepelaki mingi komona bango lisusu! Namonaki mpenza ete Yehova abosanaki ngai te, mpe nazongelaki koyekola Biblia. Juan ná Maite bazalaki mpenza motema molai, mpo mbala mingi nazalaki kozongela kotuna mituna oyo natunaki liboso. Mposa na ngai ezalaki ete nayoka makanisi ya Biblia mbala na mbala mpo esalisa ngai nakata nsinga na mateya oyo nakangamaki na yango. Nalingaki mpe koyeba makambo malamumalamu mpo nakoka kolimbwela baninga mpe bato ya libota na ngai solo ya Biblia.

Nsukansuka, nazwaki batisimo ntango nakómaki na mbula 87; nayokaki esengo makasi mpenza mokolo yango. Nazwaki batisimo na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova. Nkulutu moko asalaki diskur moko ya makambo ya Biblia, oyo etalaki libosoliboso bato oyo bakozwa batisimo. Diskur yango elelisaki ngai. Nayokaki lokola nde Yehova ye moko azalaki koloba na ngai. Nsima ya batisimo, Batatoli ya Yehova ebele bayaki kopesa ngai longonya​—atako mingi kati na bango bayebaki ngai te!

MATOMBA OYO NAZWI:

Banda kala, nayebaki ete Yesu Kristo azali “nzela.” (Yoane 14:6) Kasi boyekoli na ngai ya Biblia esalisaki ngai nayeba Yehova, moto oyo Yesu azali komema biso epai na ye. Sikoyo nabondelaka Nzambe mpe namonaka ete azali Tata mpe Moninga na ngai. Buku Pusaná penepene na Yehova * ebongolaki mpenza bomoi na ngai. Mbala ya liboso oyo natángaki yango, nasilisaki yango na butu moko mpamba! Koyeba ete Yehova azali mpenza Nzambe ya motema mawa esimbaki mpenza motema na ngai.

Soki nakanisi bambula nyonso oyo nalekisaki na koluka solo, namonaka ete maloba ya Yesu ezali solo ete: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.” (Matai 7:7) Sikoyo lokola nazwi biyano na mituna oyo nazalaki komituna banda kala, nayokaka esengo mingi ntango nazali koyebisa yango epai ya basusu.

Atako nazali na mbula 90, nazali naino mwana moke na makambo etali Yehova. Makita nyonso oyo nakɔtaka ezalaka na ntina mingi mpo na ngai, mpamba te nayekolaka makambo ya malamu mpe nazalaka elongo na bandeko. Nazali kozela ntango oyo nakozala lisusu molakisi na mabele oyo ekobongwana Paradiso. (Emoniseli 21:3, 4) Mingimingi, nazali kozela na motema likoló komona lisusu bato na ngai oyo bakufá ntango bakozonga na bomoi mpe na ntango wana nakozwa libaku ya koteya bango solo ya Biblia. (Misala 24:15) Nazali na mposa makasi ya koyebisa bango ete Yehova apesaki ngai likabo moko monene ntango nakómaki mobange!

^ par. 15 Ebimisami na Batatoli ya Yehova.