Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Nzambe ayokaka mabondeli nyonso?

Nzambe ayokaka bato ya bikólo nyonso. (Nzembo 145:18, 19) Biblia, Liloba na ye, elendisi biso toyebisaka ye makambo nyonso oyo etungisaka biso. (Bafilipi 4:6, 7) Kasi, mabondeli mosusu esepelisaka Nzambe te. Na ndakisa, asepelaka te moto azongela mabondeli oyo akangá na motó.​—Tángá Matai 6:7.

Lisusu, Yehova ayinaka mabondeli ya baoyo batyolaka na nko nyonso mibeko na ye. (Masese 28:9) Na ndakisa, na ntango ya kala Nzambe aboyaki koyoka mabondeli ya Bayisraele oyo bazalaki koboma bato na nko. Ezali polele ete tosengeli kokokisa masɛngami mosusu mpo Nzambe ayoka biso.​—Tángá Yisaya 1:15.

Tosengeli kosala nini mpo Nzambe ayoka biso?

Tokoki te kobondela Nzambe soki tozangi kondima. (Yakobo 1:5, 6) Tosengeli kondima mpenza ete azali mpe atyelaka biso likebi. Tokoki kokómisa kondima na biso makasi soki tozali koyekola Biblia, mpo kondima eutaka na makambo ya solosolo mpe na bilaka oyo ezali na Liloba ya Nzambe.​—Tángá Baebre 11:1, 6.

Tosengeli kobondela na motema moko mpe na komikitisa. Ata mpe Yesu, Mwana ya Nzambe azalaki na komikitisa ntango azalaki kobondela. (Luka 22:41, 42) Na yango, na esika ya koyebisa Nzambe makambo oyo asengeli kosala, tosengeli nde kotángaka Biblia mpo tóyeba makambo oyo azali kosɛnga biso. Boye, mabondeli na biso ekoyokana na mokano na ye.​—Tángá 1 Yoane 5:14.