Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO NA MONINGA MOKO YA KARTYE

Nzambe akipaka bampasi na biso?

Nzambe akipaka bampasi na biso?

Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Michelle akei kotala mwasi moko na nkombo Sofia.

MPO NA NINI ATIKAKA MAKAMBO YA BOYE ESALEMA?

Michelle: Lelo, nazali kopesa moto nyonso ya kartye trakte oyo. Trakte yango elobi, Okosepela koyeba solo? Oyo ya yo yango oyo.

Sofia: Ezali kolobela makambo ya Nzambe?

Michelle: Ɛɛ. Talá mituna motoba oyo ezali na ezipeli na yango. Wapi oyo​—

Sofia: Suká naino wana, okolekisa ntango na yo mpamba.

Michelle: Mpo na nini olobi bongo?

Sofia: Mpo na koloba solo, nandimelaka Nzambe te.

Michelle: Malamu, nasepeli ndenge obombeli ngai te. Kasi tiká natuna yo naino, ondimelaka Nzambe te banda kala?

Sofia: Te, ntango nazalaki kokola nazalaki kokende eglize, kasi natiká banda kala.

Michelle: Uhm. Kasi, nalingi naino nayebisa yo nkombo na ngai. Nkombo na ngai Michelle.

Sofia: Ya ngai Sofia.

Michelle: Sofia, nasepeli kokutana na yo.

Sofia: Ngai mpe.

Michelle: Sofia, nayei te mpo nándimisa yo mateya na biso na makasi. Kasi, nalingi kaka nayeba, nini mpenza esalá ete ondima te ete Nzambe azalaka?

Sofia: Mama asalaki aksida na motuka eleki sikoyo mbula 17.

Michelle: Likambo yango esali ngai mpasi. Azokaki?

Sofia: Ɛɛ, banda wana akóma paralize.

Michelle: Mawa mpenza! Oyokaki mpasi mpenza!

Sofia: Ɛɛ, likambo yango esilisá ngai mayele, yango wana namitunaka, soki Nzambe azalaka, mpo na nini atikaki likambo yango esalema? Mpo na nini Nzambe atiki biso tonyokwamaka boye?

KOMITUNA BONGO EZALI MABE?

Michelle: Komiyoka bongo mpe komituna ndenge wana ezali mabe te. Ntango tozali konyokwama, koluka koyeba ntina na yango ezalaka mabe te. Kutu, mibali mpe basi mosusu ya sembo ya ntango ya kala bamitunaki mpe bongo!

Sofia: Ya solo?

Michelle: Ɛɛ. Okosepela nalakisa yo ndakisa moko na Biblia?

Sofia: Nakosepela mpenza.

Michelle: Talá mituna oyo Habakuku mosakoli moko ya sembo atunaki Nzambe, ndenge ezali na Habakuku mokapo 1, vɛrsɛ 2 mpe 3: “Ee Yehova, kino ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe yo okoyoka te? Kino ntango nini nakobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi mpo obikisa na mobulu, mpe yo okobikisa te? Mpo na nini ozali kosala ete namona makambo oyo ezali koyokisa mpasi?” Mituna wana ekokani ná oyo omitunaka?

Sofia: Ɛɛ, ekokani mpenza.

Michelle: Nzambe agangelaki Habakuku te mpo na mituna wana, mpe alobaki na ye te ete azali na kondima moke.

Sofia: Esepelisi ngai mpenza!

YEHOVA AYINAKA BAMPASI

Michelle: Biblia eteyaka ete Nzambe ayebi bampasi na biso mpe atyelaka yango likebi.

Sofia: Olingi koloba nini?

Michelle: Tiká nalakisa yo naino ndakisa moko na Kobima 3:7. Okosepela kotánga vɛrsɛ yango?

Sofia: Likambo te. Elobi boye: “Mpe Yehova abakisaki ete: ‘Ya solo mpenza, namoni mpasi ya bato na ngai oyo bazali na Ezipito, mpe nayoki kolela na bango mpo na baoyo bazali kotinda bango na makasi básala mosala; mpo nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.’”

Michelle: Mersi. Na kotalela vɛrsɛ oyo, Nzambe ayebaka ntango bato na ye banyokwamaka?

Sofia: Ɛɛ, emonani ete ayebaka.

Michelle: Ayebaka yango kaka likolólikoló te. Talá lisusu eteni ya nsuka ya vɛrsɛ yango. Nzambe alobi: “Nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.” Maloba oyo ezali nde ya Nzambe moko ya malilimalili to oyo akipaka makambo ya bato te?

Sofia: Te, ezali mpenza bongo te.

Michelle: Ya solo, koyeba likambo moko mpe koyoka mpasi mpo na yango, ezali makambo mibale ekeseni.

Sofia: Ezali bongo.

Michelle: Kobosana makanisi wana te; tótalela sikoyo ndakisa mosusu oyo elobeli mpasi oyo basaleli ya Nzambe bakutanaki na yango. Ezali na Yisaya 63:9. Eteni ya liboso ya vɛrsɛ yango elobi boye: “Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.Okoki koloba ete Nzambe mpe azalaki koyoka mpasi ntango bato na ye bazalaki konyokwama?

Sofia: Ɛɛ, emonani ete ezali bongo.

Michelle: Sofia, mpo na koloba solo, Nzambe atyelaka mpenza biso likebi, mpe asepelaka te ntango tonyokwamaka. Ntango toyokaka mpasi ye mpe ayokaka yango.

KASI AZALI KOZELA NINI?

Michelle: Liboso nakende, ezali na likambo mosusu oyo nalingi nayebisa yo.

Sofia: Mabe te.

Michelle: Tótalela oyo Biblia eteyaka mpo na nguya ya Nzambe. Vɛrsɛ oyo nalingi kolakisa yo ezali Yirimia 10:12. Okosepela kotánga yango?

Sofia: Ɛɛ. Elobi boye: “Ye azali Mokeli ya mabele na nzela ya nguya na ye, Ye oyo atɛlɛmisaki mabele oyo ebotaka na nzela ya bwanya na ye, mpe Ye oyo atandaki likoló na nzela ya mayele na ye.”

Michelle: Mersi. Tókanisa naino mwa moke na vɛrsɛ yango. Esɛngaki ete Nzambe asalela nguya mingi mpo na kokela molɔ́ngɔ́ mpe biloko nyonso oyo ezali na kati, boye te?

Sofia: Boye.

Michelle: Sikoyo, soki Nzambe azali na nguya ya kokela biloko nyonso oyo, omoni te ete azali mpe na nguya ya kosilisa bampasi na biso?

Sofia: Ɛɛ.

Michelle: Kanisá lisusu mama na yo. Mpo na nini esalaka yo mpasi ntango omonaka ye azali konyokwama?

Sofia: Mpo nalingaka ye. Azali mama na ngai.

Michelle: Soki ozalaka na likoki ya kobikisa ye, olingaki kosala yango, boye te?

Sofia: Ezali bongo.

Michelle: Kanisá naino, Biblia eteyaka ete Nzambe ayebi bampasi na biso, ayokaka mpe mpasi ntango tonyokwamaka, mpe azali na nguya mingi. Omoni te ete Nzambe azali mpenza na komipekisa ndenge azali kosilisa mbala moko te bampasi na biso?

Sofia: Naino nakanisá bongo te!

Michelle: Ekoki kozala te ete ezali na bantina oyo esali ete atika bampasi ezala naino? *

Sofia: Uhm, namoni ete ekoki kozala bongo.

Michelle: Nayoki lokola babengi yo na telefone, boye, nakoya mokolo mosusu mpo tókoba lisolo yango.

Sofia: Mersi. Nakosepela mpenza. *

Ezali nde na lisolo moko ya Biblia oyo olukaka koyeba malamu? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna Motatoli moko ya Yehova. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

^ par. 61 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 64 Lisolo ya mbala ya nsima ekolobela ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala.