Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI: KOKANISELA BASUSU MABE EKOSILA NTANGO NINI?

Ezaleli ya kokanisela basusu mabe epalangani mokili mobimba

Ezaleli ya kokanisela basusu mabe epalangani mokili mobimba

ATAKO Jonathan abotamá na Amerika, banda bomwana bazalaki kokanisela ye mabe mpo na mposo na ye, mpo baboti na ye bazali bato ya Corée. Ntango akolaki, alukaki esika oyo bato bakokanisela ye mabe te mpo na mposo to elongi na ye. Akómaki monganga na engumba moko oyo ezali na nɔrdi ya Alaska, na États-Unis, epai bato mingi ya maladi oyo azalaki kosalisa bazalaki lokola ye. Azalaki na elikya ete mbala mosusu kuna, bato bakokanisela ye mabe te.

Elikya wana nyonso ekendaki na mai ntango asalisaki mwasi moko ya mbula 25 oyo azalaki komiyeba te. Ntango mwasi yango alamukaki, atalaki elongi ya Jonathan mpe alobelaki ye maloba mabe mpo bateyá ye banda bomwana ete ayinaka bato ya Corée. Likambo yango esalaki Jonathan mpasi lisusu mpe amonaki ete milende nyonso oyo asalaki ya kolongwa epai azalaki mpe koya na esika oyo bato bakokani na ye, ezalaki mosala ya mpunda.

Lisolo ya Jonathan emonisi mpenza likambo ya mabe oyo esalemaka. Ezaleli ya kokanisela basusu mabe ezali bisika nyonso oyo bato bazali.

Atako ezaleli ya kokanisela basusu mabe epalangani mingi, bato mingi bawelaka koloba ete ezali mabe. Yango ezali mpenza kokamwisa! Ndenge nini likambo oyo bato bayinaka ezali kopalangana mingi boye? Emonani ete bato mingi oyo baboyaka ezaleli yango bayebaka te ete bango moko mpe bazalaka na yango. Ezali mpe bongo mpo na yo?

EZALI LIKAMBO YA MOTO NYONSO

Tóyeba yango to te, ezalaka mpasi koyeba soki tokaniselaka basusu mabe na mitema na biso. Biblia emonisi ntina yango na maloba oyo: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso.” (Yirimia 17:9) Na yango, tokoki komikosa mpe kokanisa ete tosepelaka na bato ya lolenge nyonso. To tokoki koluka komilongisa mpe koloba ete ezali na ntina mpenza oyo etindi biso tókanisela bato boye to boye mabe.

Okoyoka ndenge nini soki okutani na likambo ya boye?

Mpo na komonisa mokakatano oyo moto azalaka na yango ya koyeba soki ezaleli ya kokanisela basusu mabe ekɔti na motema na ye to te, tózwa ndakisa oyo: Ozali kotambola yo moko na butu na nzela oyo ezali molili. Bilenge mibali mibale oyo omoná naino te bazali koya liboso na yo. Emonani ete bazali bilombe mpe moko na bango asimbi eloko moko na lobɔkɔ.

Okoloba ete bilenge yango balingi kosala yo mabe? Toboyi te, makambo oyo okutaná na yango ekoki kotinda yo ozala ekɛngɛ, kasi yango esengeli mpenza kotinda yo oloba mbala moko ete bilenge yango bazali likama mpo na yo? Mbala mosusu okoki komituna boye: Bilenge yango bazali bato ya mposo to ya ekólo nini? Eyano na motuna yango ekomonisa na lolenge moko to mosusu soki ezaleli yango ekɔtá na motema na yo to te.

Mpo na koloba solo, na lolenge moko to mosusu, biso nyonso tokaniselaka basusu mabe. Biblia mpe elobeli lolenge moko ya kokanisela basusu mabe oyo emonanaka mingi; elobi boye: “Bato basambisaka basusu na kolanda ndenge bazali komonana.” (1 Samwele 16:7, Contemporary English Version) Lokola biso nyonso tozalaka na ezaleli yango mpe mbala mingi ebimisaka mbuma mabe; tokoki nde kozala na elikya ete tokolonga kotika yango na bomoi na biso? Tokofanda mokolo mosusu na mokili oyo bato bakokanisela basusu mabe te?