Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Balingaki ngai moko namona oyo Biblia eteyaka mpenza”

“Balingaki ngai moko namona oyo Biblia eteyaka mpenza”
  • ABOTAMAKI NA: 1982

  • EKÓLO: RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

  • BOMOI NA YE YA KALA: BABƆKƆLÁ NGAI NA MATEYA YA BAMORMON

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na Santo Domingo, na République dominicaine; nazali mwana ya nsuka na libota ya bana minei. Baboti na ngai babɔkwamá malamu, yango wana balingaki ete bana na bango bábɔkwama na esika oyo bato bazali na bizaleli malamu mpe sembo. Mbula minei liboso nabotama, baboti na ngai bakutanaki na bamisionɛrɛ ya Lingomba ya Mormon. Lokola bilenge mibali ya Lingomba yango balataki malamu mpe bazalaki na bizaleli ya malamu, baboti na ngai bazwaki nokinoki ekateli ete libota na biso ezala kati na mabota ya esanga oyo bakómaki bandimi ya liboso ya Lingomba ya Mormon to Église des saints des derniers jours yango.

Ntango nazalaki kokola, nazalaki kosepela na milulu oyo ezalaki kosalema na eglize mpe komemya lolenge lingomba ezalaki kotalela bomoi ya libota mpe bizaleli malamu. Nazalaki komona yango lokumu kozala mondimi ya Lingomba ya Mormon mpe namityelaki mokano ya kokóma misionɛrɛ.

Ntango nakómaki na mbula 18, tokendaki kofanda na États-Unis mpo natánga na Iniversite moko ya malamu. Mbula soki moko na nsima mama-leki na ngai ná mobali na ye, oyo bazali Batatoli ya Yehova, bayaki kotala biso na Florida. Babengisaki biso na liyangani moko. Nakamwaki ndenge bato nyonso oyo bafandaki pene na ngai bazalaki koluka bavɛrsɛ na Biblia mpe kokoma makambo ya ntina. Yango wana, nasɛngaki biki ná papye mpe nasalaki lokola bango.

Nsima ya liyangani, mama-leki ná mobali na ye bayebisaki ngai ete lokola nazali na mposa ya kokóma misionɛrɛ, bakoki kosalisa ngai nayekola Biblia. Namonaki ete ezalaki likanisi ya malamu mpo na ntango wana, nayebaki buku ya Mormon malamu koleka Biblia.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Ntango tozalaki kosolola na bango masolo ya Biblia na telefone, mama-leki ná mobali na ye bazalaki ntango nyonso kolendisa ngai natalaka soki mateya ya lingomba na ngai eyokani na oyo ya Biblia. Balingaki ngai moko namona oyo Biblia eteyaka mpenza.

Nazalaki kondima mateya mingi ya Lingomba ya Mormon, kasi nayebaki mpenza te soki eyokanaki na mateya ya Biblia. Mama-leki atindelaki ngai Lamuká! ya 08/11/1995 oyo ebimisamaki na Batatoli ya Yehova, oyo ezalaki mpe na masolo oyo elobelaki mateya ya Bamormon. Nakamwaki ndenge nayebaki te mateya mingi ya lingomba na ngai. Yango etindaki ngai nakɔta na site ya Internet ya Bamormon mpo natala soki makambo oyo natángaki na Lamuka! ezali solo. Ezalaki solo, lisusu, ntango nakendaki kotala musée ya Lingomba ya Mormon na teritware ya Utah, namonaki mpenza ete zulunalo yango elobaki solo.

Nazalaki kokanisa ete buku ya Mormon mpe Biblia ezali na boyokani. Kasi ntango nakómaki kotánga Biblia na likebi mpenza, namonaki ete mateya ya Bamormon ekeseni mpenza na oyo ya Biblia. Na ndakisa, na Ezekiele 18:4, Biblia elobi ete molimo ekufaka. Nzokande, na buku ya Mormon, mokanda ya Alma 42:9 elobi: “Molimo ekoki kokufa soki moke te.”

Longola yango, mateya ya Lingomba ya Mormon oyo ezalaki kolendisa bolingo ya ekólo etungisaki ngai mingi. Na ndakisa, bateyaka bandimi na bango ete elanga ya Edene ezalaki na teritware ya Jackson (Missouri), na États-Unis. Mpe bakambi ya lingomba bateyaka ete “mokolo mosusu Nzambe akoyangela mabele mobimba na nzela ya guvɛrnema ya États-Unis.”

Nakotalela mateya wana, nazalaki komituna soki nini ekokómela ekólo na ngai mpe oyo ya bato mosusu. Mokolo moko na mpokwa, ntango elenge moko oyo azalaki kozwa formasyo ya kokóma misionɛrɛ ya lingomba yango abengaki ngai na telefone, nasololaki na ye likambo yango. Natunaki ye soki akondima kobunda ná Bamormon ya ekólo mosusu soki ekólo na ye ná oyo ya bango ezali kobunda. Nakamwaki ntango andimaki. Nayekolaki mateya ya lingomba na ngai na mozindo mpe nasololaki na bakambi ya lingomba. Bayebisaki ngai ete biyano na mituna na ngai ezali libombami oyo ekoyebana mokolo mosusu wana pole ezali kokóma makasi.

Biyano oyo bapesaki ngai elɛmbisaki ngai nzoto, yango wana namitalelaki lisusu malamumalamu mpe natalelaki ntina oyo nalingaki kokóma misionɛrɛ. Namonaki ete nalingaki kokóma misionɛrɛ mpo nazalaki kosepela kosalisa basusu. Lisusu ezalaki mpe mpo bato bámemyaka ngai. Kasi nayebaki makambo mingi te na ntina na Nzambe. Atako liboso nazalaki kotánga Biblia mbala mingi, nazalaki mpenza kozwa yango na valɛrɛ te. Nayebaki mokano ya Nzambe te mpo na mabele mpe bato.

MATOMBA OYO NAZWI:

Nayebaki makambo mingi na boyekoli na ngai ya Biblia ná Batatoli ya Yehova; na ndakisa, nkombo ya Nzambe ezali nani, nini ekómelaka biso soki tokufi, mpe mokumba ya Yesu na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Nsukansuka nakómaki komesana na buku yango mpe nakómaki kosepela koyebisa basusu solo oyo nazalaki koyekola. Bandá kala nayebaka ete Nzambe azali, kasi sikoyo nakoki kosolola na ye na libondeli lokola moninga na ngai ya motema. Nazwaki batisimo mokolo ya 12 ya sanza ya nsambo 2004 mpe nakómaki Motatoli ya Yehova; mpe sanza motoba na nsima nakómaki kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola.

Nasalaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn na New York, na boumeli ya mbula mitano. Nasepelaki mingi ndenge napesaki mabɔkɔ na mosala ya kobimisa Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo esalisaka bamilio ya bato na mokili mobimba; mpe nazali kokoba kosalisa basusu bayeba Nzambe.