Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bisakweli nyonso ya Biblia ekokisamaka

Bisakweli nyonso ya Biblia ekokisamaka

“Na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama.”​—YOSUA 23:14.

NA NDENGE NINI BIBLIA EKESENI NA BABUKU MOSUSU? Makambo oyo bato ya kala bazalaki kosakola mpo na avenire ezalaki polele te mpe ezalaki ya kotyela motema te; ezali mpe bongo mpo na bato oyo batalaka bilembo ya horoscope lelo oyo. Ata mayele ya siansi oyo babengi futurologie, oyo eyekolaka makambo ekoya na kotalela ndenge makambo ezali kosalema sikoyo, elongaka te kosakola basiɛklɛ mingi liboso makambo mpenza oyo ekosalema. Nzokande, bisakweli ya Biblia eyebisaka likambo mokomoko mpe yango nyonso ekokisamaka, ata ntango eyebisaka “banda kala makambo oyo esalemi naino te.”​—Yisaya 46:10.

NA NDAKISA: Na siɛklɛ ya motoba liboso ya ntango na biso, mosakoli Danyele amonaki emonaneli moko oyo elobelaki ndenge Grɛsi ekokweisa Bamede ná Baperse noki mpenza. Esakweli yango elobaki mpe ete ntango kaka mokonzi ya Grɛsi ‘akokóma makasi,’ bokonzi na ye ‘ekobukana.’ Nani asengelaki kozwa esika na ye? Danyele akomaki ete: “Makonzi minei ekobima, euti na ekólo na ye, kasi ekozala na nguya na ye te.”​—Danyele 8:5-8, 20-22.

BATO YA MAYELE NA ISTWARE BALOBI NINI? Mbula koleka 200 nsima ya eleko ya Danyele, Alezandre Monene akómaki mokonzi ya Grɛsi. Na mbula zomi ya boyangeli na ye, Alezandre akweisaki ampire ya Bamede ná Baperse, mpe akómisaki ampire ya Grɛsi monene tii na Ebale Indus (oyo ezali lelo na ekólo Pakistan). Kasi, akufaki na mbalakaka, ntango azalaki na mbula 32. Nsukansuka, nsima ya etumba oyo esalemaki pene na mboka Ipsus, na Azia Moke, ampire na ye epanzanaki. Na nsima, bato minei oyo balongaki etumba yango bakabolaki ampire ya Grɛsi na biteni minei mpe moto na moto azwaki eteni moko. Kasi, ata moko na bango te akómaki na nguya mingi lokola Alezandre.

OKANISI NINI? Buku nini mosusu ezali na bisakweli oyo ekokisamaka ndenge wana? Omoni te ete Biblia ekeseni na babuku mosusu nyonso?

“Biblia ezali na bisakweli . . . mingi mpenza mpe ekoki kosalema te ete bisakweli yango ekokisamaka kaka na mbalakaka.”​—A LAWYER EXAMINES THE BIBLE, YA IRWIN H. LINTON